4
Elenge mobali
Oh mwasi na ngai ya motema,
ozali kitoko, ozali penza kitoko makasi !
Miso na yo, na se ya vwale, elala lokola ebenga ;
suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi
oyo ekitaka na ngomba Galadi.
Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme
oyo balongoli bapwale,
bongo bawuti kosukola yango.
Meme moko na moko ezali na lipasa na yango ;
moko te ezangi mwana.
Bibebu na yo ezali lokola kitendi ya motane,
mpe elobeli na yo epesaka esengo ;
matama na yo ezali lokola mbuma ya grenade,
na se ya vwale.
Kingo na yo ezali lokola ndako molayi ya Davidi,
oyo batongi mpo na kobomba bibundeli ;
banguba nkoto moko ediembisami kuna,
banguba ya basoda ya mpiko.
Mabele na yo nyonso mibale ezali
lokola bana mapasa mibale ya mboloko,
oyo ezali kolia kati na bafololo oyo babengaka lisi.
Kino tongo ekotana mpe molili ekolimwa,
nakokende na ngomba ya mire
mpe na ngomba moke ya ansa.
Mwasi na ngai ya motema,
mobimba na yo ezali kitoko mingi ;
ata elembo moko te emonani mabe kati na yo.
 
Longwa na Libani mpe yaka elongo na ngai,
mwasi na ngai ya motema ;
longwa na Libani, yaka elongo na ngai.
Tala wuta na basonge ya bangomba Amana,
Seniri mpe Erimoni
epai wapi ezali na ndako ya bankosi mpe ngomba ya bankoyi.
Obetisi ngai motema makasi,
Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ;
obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo,
mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.
10 Solo, bolingo na yo eleki elengi,
ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema !
Solo, bolingo na yo eleki vino na kitoko ;
solo ya mafuta na yo eleki malasi nyonso na kitoko.
11 Bibebu na yo ezali kobimisa mafuta ya elengi,
mwasi na ngai ya motema ;
se ya lolemo na yo etondi na mafuta ya nzoyi mpe na miliki,
mpe solo ya bilamba na yo ezali lokola solo ya Libani.
12 Ozali elanga ekangama,
ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ;
ozali etima oyo ezipami
mpe liziba oyo ekangami.
13 Ozali kopesa pio lokola elanga ya banzete ya grenade,
oyo ezali na bambuma kitoko,
elongo na banzete ya solo kitoko : ene mpe nare,
14 nare mpe safarani, kaneli ya solo kitoko, sinamoni,
elongo na lolenge nyonso ya banzete
oyo epesaka malasi ya ansa,
ya aloe mpe ya mire, mpe malasi nyonso oyo eleki kitoko.
15 Ozali liziba kati na elanga,
etima oyo etiolaka wuta na Libani.
Elenge mwasi
16 Oh mopepe ya nor, lamuka ;
oh mopepe ya sude, yaka !
Pepa kati na elanga na ngai,
mpe tika ete solo kitoko na yango epanzana kino mosika !
Tika ete mwasi na ngai ya motema aya
kati na elanga na ye
mpe alia mbuma na yango ya elengi makasi !