5
Mobali
Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ;
nayei na elanga na ngai,
nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire,
nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko,
nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi,
nayei komela vino mpe miliki na ngai.
Baninga
Oh baninga, bolia mpe bomela na bino,
bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.
Elenge mwasi
Nalalaki, kasi makanisi na ngai ezalaki ya kolamuka.
Yoka ! Mongongo ya molingami na ngai
ezali koyokana na ekuke !
Elenge mobali
« Molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema,
ebenga na ngai, oyo azali kitoko koleka mpo na ngai,
fungolela ngai ndako,
pamba te moto na ngai etondi na londende,
mpe suki na ngai epoli na matanga ya londende ya butu. »
Elenge mwasi
Nasili kolongola nzambala na ngai, nalata yango lisusu ?
Nasili kosukola makolo na ngai, nabebisa yango lisusu ?
Mobali na ngai ya motema akotisi
loboko na ye na lidusu ya ekuke,
bongo motema na ngai ekomi kobeta mpo na ye.
Natelemaki mpo na kokende kofungolela
mobali na ngai ya motema ndako,
mpe maboko na ngai ebimisaki solo ya malasi ya mire,
misapi na ngai etangisaki yango na bikangelo ya ndako.
Nafungolelaki mobali na ngai ya motema ndako,
kasi akendeki na ye mpe alimwaki.
Nakweyaki mayanga wana azalaki koloba ;
nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te ;
nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.
Tango bakengeli ya mir bazalaki koleka-leka kati na engumba,
bamonaki ngai, babetaki ngai, bazokisaki ngai
mpe balongolaki ngai vwale na moto.
Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino,
soki bomoni mobali na ngai,
bokoloba na ye nini ?
Boloba na ye ete nabeli maladi ya bolingo.
Bilenge basi
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko,
mobali na yo aleki mibali mosusu na nini ?
Nini penza ya malonga oyo mobali na yo azali na yango,
oyo eleki mibali mosusu
mpo ete oloba na biso boye ?
Elenge mwasi
10 Mobali na ngai azali na poso pembe,
azali moto oyo asimba bendele kati na mibali nkoto zomi.
11 Moto na ye ezali lokola wolo ya peto,
suki na ye elingama-lingama,
mpe azali mwindo lokola yanganga.
12 Miso na ye ezali kitoko lokola bibenga
pembeni ya moluka,
ezali lokola basukolaka yango na miliki
mpe avandaka kati na sani ya bomengo.
13 Matama na ye ezali lokola mikala ya banzete ya malasi,
lokola ekolo ya bafololo ya solo kitoko ;
bibebu na ye ezali lokola fololo oyo babengaka lisi
oyo ebimisaka mire ya kitoko.
14 Maboko na ye ezali lokola bapete ya wolo
oyo batia mabanga ya Krizolite.
Nzoto na ye ezali lokola pembe ya nzoko
oyo babongisi mpe babakisi mabanga ya safiri.
15 Makolo na ye ezali lokola makonzi ya mabanga ya marbre
oyo evandi likolo ya moboko ya wolo ya peto.
Azali lokola bangomba ya Libani,
kitoko lokola banzete ya sedele ya Libani.
16 Elobeli na ye esalaka elengi na motema,
mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye.
Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali,
oh bilenge basi ya Yelusalemi !