3
Elenge mwasi
Butu mobimba, na mbeto na ngai,
nazali koluka mobali oyo motema na ngai elingaka ;
naluki ye, kasi namonaki ye te.
Esengeli na ngai kolamuka sik’oyo
mpe kobima libanda ya engumba,
na balabala na yango mpe na bisika
oyo bato nyonso bakutanaka ;
nakoluka mobali oyo motema na ngai elingaka.
Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.
Bakengeli bamonaki ngai
tango bazalaki koleka-leka na balabala ya engumba.
Natunaki bango :
« Bomoneli ngai te mobali
oyo motema na ngai elingaka ? »
Tango kaka nalekaki bango,
mbala moko, namonaki mobali
oyo motema na ngai elingaka.
Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende.
Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai,
na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.
Elenge mobali
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino
na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga :
Bolamusa Bolingo na ngai te
liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
Elenge mwasi
Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata,
azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa,
oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko
ya moto ya mombongo ?
Tala ! Ezali nde tsipoyi ya mokonzi Salomo !
Basoda na ye ya mpiko, bato ya lokumu ya Isalaele,
tuku motoba nde bamemi yango.
Bango nyonso balati mipanga ;
bango nyonso bazali makasi na bitumba,
baselingwa mpo na bitumba ya butu.
 
Mokonzi Salomo asalisaki tsipoyi ;
basalaki yango na mabaya ya mboka Libani.
10 Basalaki bisimbelo na yango na palata,
mokongo na yango, na wolo.
Balatisaki evandelo na yango
bilamba ya motuya ya langi ya motane makasi.
Bongo, bilenge basi ya Yelusalemi babongisaki
kati na yango na motema ya bolingo.
11 Bino bilenge basi ya Siona, bobima ;
botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole,
motole oyo mama na ye alatisaki ye
na mokolo ya libala na ye,
na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.