2
Mwasi
Nazali lokola fololo oyo ebotaka na etando ya Saroni,
fololo oyo babengaka lisi ya lubwaku.
Elenge mobali
Ndenge fololo oyo babengaka lisi ezalaka kati na banzube,
ndenge wana mpe mwasi na ngai ya motema
azalaka kati na bilenge basi.
Elenge mwasi
Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba,
ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka
kati na bilenge mibali.
Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye,
mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
Amemaki ngai na esika oyo bamelaka masanga,
mpe bendele na ye likolo na ngai ezali bolingo.
Lendisa ngai na bagato oyo basali na bambuma ya vino,
sunga ngai na bapome,
pamba te nabeli maladi ya bolingo.
Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai,
mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto !
Elenge mobali
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino
na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga :
Bolamusa Bolingo na ngai te
liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
Elenge mwasi
Yoka mongongo ya Bolingo na ngai !
Tala ye wana ! Ye wana azali koya,
azali kopumbwa na likolo ya bangomba,
azali kodenda na likolo ya bangomba mike.
Molingami na ngai azali lokola mboloko to mwana ya mbuli.
Tala ye wana ! Atelemi na sima ya mir na biso,
azali kotala na lininisa,
azali kotala na mayele na kiyungulu ya lininisa.
10 Molingami na ngai alobi mpe ayebisi ngai :
« Mwasi na ngai ya motema, telema ;
mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai !
11 Pamba te, tala eleko ya malili esili koleka,
bamvula esili mpe ekeyi.
12 Bafololo ebimi na mboka,
tango ya koyemba banzembo ekoki.
Makelele ya banzembo ya bibenga ekomi lisusu
koyokana na mokili.
13 Nzete ya figi ebimisi bambuma na yango ya liboso,
bafololo ya bilanga ya vino ekomi kopanza
solo na yango ya kitoko.
Mwasi na ngai ya motema, telema ;
mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai.
Elenge mobali
14 Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga,
kati na madusu ya bangomba,
monisa ngai ata elongi na yo
mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo,
pamba te mongongo na yo ezalaka elengi
mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi ! »
Bandeko mibali
15 Bokangela biso bambwa ya zamba mpe bana na yango
oyo ezali kobebisa bilanga na biso ya vino,
pamba te bilanga na biso ya vino ebimisi bafololo.
Elenge mwasi
16 Mobali na ngai ya bolingo azali ya ngai,
mpe ngai nazali ya ye ;
aleisaka bibwele na ye na bilanga
oyo etondi na bafololo oyo babengaka lisi.
17 Mobali na ngai ya bolingo, zonga ;
awa moyi ebandi kobima mpe molili ekimi,
zala lokola mboloko to mwana ya mbuli
na bangomba ya Beteli.