24
Davidi abikisi Saulo
Davidi alongwaki wana mpe akendeki kovanda na ebombamelo kati na mabanga ya Eyini-Gedi. Sima na Saulo kolanda bato ya Filisitia, azongaki ; bongo bayebisaki ye : « Davidi azali sik’oyo kati na esobe ya Eyini-Gedi. » Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba. Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.
Bato ya Davidi balobaki na ye : Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo : « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. »
Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo. Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo. Alobaki na basoda na ye : « Tika ete Yawe apesa ngai te nzela ya kosala likambo ya boye epai ya nkolo na ngai, mopakolami na Yawe ! Loboko na ngai ekoki te kosimba nzoto na ye, pamba te Yawe nde apakolaki ye mafuta. »
Na maloba oyo, Davidi agangelaki bato na ye mpe apekisaki bango kobundisa Saulo. Saulo abimaki na ebombamelo yango mpe akobaki nzela na ye.
Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! »
Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele. 10 Alobaki na Saulo :
— Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ? 11 Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. » 12 Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai. 13 Tika ete Yawe azala Mosambisi kati na ngai mpe yo, mpe tika ete Yawe azongisela yo mabe na mabe oyo osali ngai ! Kasi loboko na ngai ekosimba yo te. 14 Ndenge kaka lisese ya kala elobi : « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te. 15 Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani ? Azali kolanda nani ? Mbwa ya kokufa ? Nzinzi ? 16 Tika ete Yawe azala Mosambisi na biso mpe akata likambo kati na biso. Tika ete atala likambo na ngai mpe akata yango ! Tika ete alongisa ngai mpe akangola ngai wuta na loboko na yo.
17 Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki :
— Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai ?
Mpe Saulo alelaki makasi. 18 Alobaki na Davidi :
— Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo ! 19 Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai : Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai. 20 Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo. 21 Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo. 22 Lapa sik’oyo ndayi epai na ngai na Kombo na Yawe ete okoboma bakitani na ngai te to okolimwisa kombo na ngai te wuta na libota ya botata na ngai.
23 Boye Davidi alapaki ndayi yango epai ya Saulo. Sima na yango, Saulo azongaki epai na ye. Bongo Davidi mpe bato na ye bazongaki na ebombamelo na bango kati na ngomba.