23
Davidi abikisi engumba Keila
Tango bayebisaki Davidi ete bato ya Filisitia bazali kobundisa engumba Keila mpe bazali kozwa na makasi ble na bilanga na yango, Davidi atunaki Yawe, alobaki :
— Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia ?
Yawe azongiselaki ye :
— Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.
Kasi basoda ya Davidi bayebisaki ye :
— Soki awa kati na Yuda, tozali kobanga, ekozala boni soki tokeyi na Keila kobundisa bato ya Filisitia ?
Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye :
— Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
Boye Davidi elongo na basoda na ye bakendeki na engumba Keila mpe babundisaki bato ya Filisitia, babotolaki biloko mpe bibwele na bango. Davidi abetaki makasi bato ya Filisitia, mpe, na bongo, abikisaki bato ya Keila. Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
Saulo alandi Davidi
Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »
Saulo asangisaki mampinga na ye nyonso mpo na bitumba, mpo ete bakende na Keila kozingela Davidi elongo na bato na ye. Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo. 10 Davidi alobaki :
— Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, mosali na Yo ayoki malamu ete Saulo azali komibongisa mpo na koya na Keila, mpo na kobebisa engumba likolo na ngai. 11 Boni, bakambi ya Keila bakokaba ngai penza na maboko na ye ? Saulo akoya solo ndenge mosali na Yo ayoki yango ? Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, yebisa mosali na yo.
Yawe alobaki :
— Iyo, akoya penza.
12 Davidi atunaki lisusu :
— Bakambi ya Keila bakokaba penza ngai mpe bato na ngai na maboko ya bato ya Saulo ?
Yawe alobaki :
— Iyo, bakokaba yo.
13 Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.
14 Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye.
15 Wana Davidi azalaki na Oreshi kati na esobe ya Zifi, ayokaki ete Saulo abimaki mpo na koluka koboma ye. 16 Jonatan, mwana mobali ya Saulo, akendeki na Oreshi epai ya Davidi mpo na kolendisa ye na Kombo ya Nzambe. 17 Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »
18 Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi.
Davidi akimi Saulo
19 Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo mpe balobaki na ye :
— Boni, Davidi abombami te kati na biso, na bisambelo ya likolo ya bangomba ya Oreshi, kati na esobe, na likolo ya ngomba moke ya Akila oyo ezali na ngambo ya sude ya Yeshimoni ? 20 Sik’oyo, oh mokonzi, tango nyonso okosepela kokita, kita na yo ; mpe biso moko tozwi mokumba ya kokaba ye na maboko ya mokonzi.
21 Saulo azongisaki :
— Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai ! 22 Bokende, botala lisusu malamu, bononga mpe boluka koyeba esika nini Davidi akendaka mikolo nyonso mpe nani amonaki ye kuna ; pamba te bayebisaka ngai ete azali na mayele mabe makasi. 23 Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda.
24 Boye, batelemaki mpe bakendeki na Zifi liboso na Saulo. Nzokande Davidi elongo na bato na ye bazalaki kati na esobe ya Maoni, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Yeshimoni.
25 Saulo elongo na bato na ye bakomaki koluka Davidi. Tango bayebisaki Davidi ete bazali koluka ye, akitaki kati na libanga monene mpe avandaki kati na esobe ya Maoni. Mpe tango Saulo ayokaki bongo, akotaki kati na esobe yango ya Moani mpo na kolanda Davidi. 26 Saulo azalaki kotambola na ngambo moko ya ngomba, bongo Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na ngambo mosusu mpe kokima mbangu mosika na Saulo. Lokola Saulo mpe mampinga na ye bazalaki koluka kozingela Davidi mpe bato na ye mpo na kokanga bango, 27 momemi sango moko ayaki epai ya Saulo mpe alobaki na ye : « Yaka noki ! Bato ya Filisitia bakoti na mokili. »
28 Mbala moko, Saulo atikaki kolanda Davidi mpo na kokende kokutana na bato ya Filisitia. Yango wana babengaka esika yango « Sela-Amalekoti » oyo elakisi « Libanga ya bokabwani. »