25
Davidi, Nabali mpe Abigayili
Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama.
Davidi akendeki na esobe ya Parani. Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale. Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe. Wana Davidi azali kati na esobe, ayokaki ete Nabali azali kokata bameme na ye bapwale. Davidi atindaki bilenge mibali zomi, alobaki na bango : « Bokende na Karimeli epai ya Nabali mpe bopesa ye mbote na kombo na ngai. Boyebisa ye : ‹ Tika ete bomoi molayi epesamela yo ! Tika ete kimia ezala na yo, na libota na yo mpe na nyonso oyo ezali ya yo ! Nayoki ete bazali kokata bameme bapwale epai na yo. Nzokande, tango nyonso oyo babateli bibwele na yo bazalaki elongo na biso na Karimeli, tosalaki bango mabe ata moko te, mpe babungisaki ata eloko moko te. Tuna basali na yo, bakoyebisa yo. Boye, tika ete bilenge mibali na ngai bazwa ngolu na miso na yo, lokola tokomi epai na yo na mokolo ya feti ! Nabondeli yo, pesa na basali na yo mpe na Davidi, mwana na yo ya mobali, eloko nyonso oyo okokoka kozwa mpo na bango. › »
Tango bilenge mibali ya Davidi bakomaki epai ya Nabali, bayebisaki ye makambo oyo nyonso na kombo ya Davidi, mpe bazelaki.
10 Kasi Nabali azongiselaki basali ya Davidi : « Davidi azali nani ? Mwana mobali ya Izayi azali nani ? Mikolo oyo, basali ebele bazali kokima bankolo na bango. 11 Mpo na nini nakamata mapa na ngai, mayi na ngai mpe mosuni, oyo nabongisi mpo na bato na ngai, oyo bakataka bapwale, mpo na kopesa yango epai ya bato oyo nayebi kutu epai bawuti te ? »
12 Bilenge mibali ya Davidi babalukaki mpe bazongaki. Tango bakomaki, bayebisaki Davidi makambo oyo Nabali alobaki. 13 Davidi alobaki na basoda na ye : « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. »
Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko.
14 Moko kati na basali ya Nabali alobaki na Abigayili, mwasi ya Nabali : « Davidi atindaki bantoma wuta na esobe mpo na kopambola nkolo na biso, kasi ye atombokelaki bango. 15 Nzokande bato yango basalelaki biso penza bolamu, basalaki biso mabe ata moko te, mpe, tango nyonso totambolaki elongo na bango na zamba, tobungisaki ata eloko moko te. 16 Butu mpe moyi, tango nyonso tozalaki koleisa bibwele na biso pene na bango, bazalaki lokola mir zingazinga na biso. 17 Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »
18 Abigayili asalaki na lombangu, azwaki mapa nkama mibale, bambeki mibale ya vino, bameme batumba mitano, bakilo tuku motoba na mibale na bagrame nkama mitano ya ble bakalinga, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka mpe bagato nkama mibale basala na bambuma ya figi ; mpe atiaki yango na likolo ya ba-ane. 19 Bongo alobaki na basali na ye : « Bokende liboso na ngai, nazali kolanda bino. » Kasi ayebisaki mobali na ye, Nabali, te. 20 Wana Abigayili azalaki na likolo ya ane, azalaki kokita sima na ngomba. Na tango yango kaka, Davidi mpe bato na ye bazalaki mpe kokita na ngambo epai wapi Abigayili azalaki, mpe akutanaki na bango. 21 Davidi awutaki komilobela : « Ezalaki na pamba nde nabatelaki biloko nyonso ya moto oyo kati na esobe mpo ete eloko moko te ebunga kati na biloko na ye nyonso ! Azongiseli ngai mabe na esika ya bolamu oyo nasalelaki ye ! 22 Tika ete Nzambe apesa ngai Davidi etumbu ya makasi soki, kino lobi na tongo, natiki na bomoi mobali moko kati na bato nyonso oyo bazali ya Nabali ! »
23 Tango Abigayili amonaki Davidi, akitaki na lombangu wuta na ane na ye mpe agumbamaki na liboso ya Davidi, elongi kino na mabele. 24 Akweyaki na makolo ya Davidi mpe alobaki :
— Oh nkolo na ngai, tika ete mbeba ezala kaka na moto na ngai ! Nabondeli yo, tika ete mwasi mosali na yo asolola na yo ! Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo alingi koyebisa yo. 25 Tika ete nkolo na ngai atala te Nabali, mobali oyo ya mabe, pamba te azali penza ndenge kombo na ye ezali ; kombo na ye ezali Nabali, mpe elingi koloba : moto ya liboma. Mpe liboma ezali penza kotambola elongo na ye. Ngai mwasi mosali na yo, namonaki te bilenge mibali oyo mokonzi na ngai atindaki. 26 Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali. 27 Mpe tika ete bakado oyo mwasi mosali na yo amemeli nkolo na ngai epesamela mibali oyo bazali kolanda yo. 28 Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo. 29 Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga. 30 Tango Yawe akokokisela nkolo na ngai bolamu nyonso oyo alakaki yo mpe akokomisa yo mokambi ya Isalaele, 31 nkolo na ngai akoyoka mawa te na motema na ye mpe akomitungisa te na makanisi mpo ete asopaki makila na pamba mpe azongisaki ye moko mabe na mabe. Bongo tango Yawe akosalela nkolo na ngai bolamu, okokanisela mwasi mosali na yo.
32 Davidi azongiselaki Abigayili :
— Tika ete apambolama, Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo atindi yo kokutana na ngai na mokolo ya lelo ! 33 Tika ete mayele na yo epambolama ! Tika ete yo moko mpe opambolama mpo ete opesi ngai nzela te ya koboma mpe ya kozongisa ngai moko mabe na mabe ! 34 Nzokande, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo apesi ngai nzela te ya kosala yo mabe, soki oyaki noki te mpo na kokutana na ngai, mobali moko te kati na ndako ya Nabali alingaki kotikala na bomoi kino lobi na tongo.
35 Boye Davidi azwaki bakado oyo Abigayili amemelaki ye mpe alobaki :
— Zonga epai na yo na kimia. Nayoki maloba na yo mpe nakosala ndenge osengi ngai.
Kufa ya Nabali, mpe Davidi abali Abigayili
36 Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki. 37 Kasi na tongo, lokola milangwa na ye esilaki, mwasi na ye ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. Nabali ayokaki pasi na motema mpe akangamaki lokola libanga. 38 Sima na mikolo zomi, Yawe abetaki Nabali, mpe akufaki.
39 Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki : « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai ! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko ! »
Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye.
40 Basali ya Davidi bakendeki na Karimeli mpe balobaki na Abigayili :
— Davidi atindi biso epai na yo mpo ete toya kozwa yo mpo okoma mwasi na ye.
41 Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki :
— Mwasi mosali na yo, ye oyo ! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai.
42 Abigayili amataki na ane na lombangu mpe akendeki nzela moko na bantoma ya Davidi elongo na basali na ye mitano ya basi. Mpe akomaki mwasi ya Davidi. 43 Davidi abalaki lisusu Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe bango mibale bakomaki basi na ye. 44 Kasi Saulo abalisaki Mikali, mwana na ye ya mwasi, oyo azalaki mwasi ya Davidi, epai ya Paliti, mwana mobali ya Laishi, moto na Galimi.