19
Saulo aluki koboma Davidi
Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi. Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna. Ngai nakobima mpe nakozala elongo na tata na ngai kati na zamba epai wapi yo okozala. Nakoloba na tina na yo epai ya tata na ngai, nakoluka koyeba makambo ndenge ezali mpe nakoyebisa yo. »
Jonatan alobaki malamu na tina na Davidi epai ya tata na ye, Saulo : « Tika ete mokonzi asala mabe te na mosali na ye, Davidi, pamba te asali yo mabe te. Yo nde kutu moto ozwi lisungi monene na makambo oyo ye asali. Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »
Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye : « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »
Bongo Jonatan abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo basololaki na tata na ye. Jonatan amemaki Davidi epai ya Saulo, mpe Davidi asalelaki Saulo lokola na ebandeli.
Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye.
Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda, 10 Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki.
11 Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi ! »
12 Boye Mikali akitisaki Davidi na nzela ya lininisa, mpe Davidi akimaki mpe abikaki. 13 Bongo Mikali azwaki nzambe ya ekeko oyo ezalaki na lolenge ya moto ; alalisaki yango na mbeto, afinikaki yango elamba mpe atiaki yango bapwale ya bantaba na moto. 14 Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki : « Azali kobela. »
15 Saulo azongisaki bato mpo ete batala Davidi mpe alobaki na bango : « Bomemela ngai ye na mbeto na ye mpo ete naboma ye. » 16 Kasi tango mibali bakotaki, bamonaki, na likolo ya mbeto, nzambe ya ekeko oyo ezalaki lokola moto mpe ezalaki na bapwale ya bantaba na moto na yango. 17 Saulo alobaki na Mikali :
— Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki ?
Mikali alobaki na Saulo :
— Davidi alobaki na ngai : « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. »
18 Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama. 19 Sango ekomaki epai ya Saulo : « Davidi azali na Nayoti ya Rama. »
20 Saulo atindaki bato kokende kokanga Davidi. Kasi tango bamonaki lisanga ya basakoli kosakola mpe Samuele atelemi wana lokola mokambi na bango, Molimo na Nzambe akitelaki bato oyo Saulo atindaki, mpe bakomaki bango mpe kosakola. 21 Sango ekomaki epai ya Saulo, mpe ye atindaki bato mosusu ; kasi bango mpe basakolaki. Saulo atindaki bato mosusu na mbala ya misato, kasi bango mpe basakolaki.
22 Sima, ye moko Saulo akendeki na Rama mpe akomaki na libulu monene ya mayi, na Seku. Atunaki :
— Samuele mpe Davidi bazali wapi ?
Bazongiselaki ye :
— Bazali na Nayoti ya Rama.
23 Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama. 24 Ye mpe alongolaki bilamba na ye mpe asakolaki liboso ya Samuele ; akweyaki mpe atikalaki bolumbu mokolo yango mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato batunaka : « Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »