18
Boyokani ya Davidi elongo na Jonatan
Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko. Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye. Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko. Jonatan alongolaki kazaka oyo azalaki kolata mpe apesaki yango na Davidi. Apesaki ye mpe bilamba na ye, mopanga na ye, mokaba na ye mpe eloko na ye oyo abetelaka tolotolo. Lokola Davidi azalaki penza kosala malamu mosala nyonso oyo Saulo azalaki kotinda ye na bisika nyonso, Saulo akomisaki ye mokonzi monene ya basoda. Bato nyonso elongo na basali ya Saulo bazalaki kosepela na ye.
Sima na Davidi koboma moto ya Filisitia, tango basoda bazalaki kozonga wuta na bitumba, basi babimaki wuta na bingumba nyonso ya Isalaele mpo na kokende koyamba mokonzi Saulo, na banzembo ya esengo mpe na mabina, na milolo ya esengo, na bambunda mike mpe na bangonga. Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye :
« Saulo abomaki bankoto,
mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki : « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi ! »
Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe.
10 Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko. 11 Mbala moko, Saulo abwakaki likonga na ye na koloba : « Nakobamba Davidi na mir. »
Kasi Davidi akimaki ye mbala mibale.
12 Saulo abangaki Davidi, pamba te Yawe azalaki elongo na Davidi kasi atikaki Saulo. 13 Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango. 14 Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye. 15 Tango Saulo amonaki ete Davidi azali kolonga mingi, abangaki ye. 16 Kasi Isalaele mobimba mpe Yuda mobimba bazalaki kolinga Davidi mpo ete azalaki kotambolisa bango na bitumba na bango.
Libala ya Davidi
17 Saulo alobaki na Davidi :
— Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe.
Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »
18 Davidi azongiselaki Saulo :
— Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi ?
19 Boye, tango ngonga ya kobalisa Merabi, mwana mwasi ya Saulo, epai ya Davidi ekokaki, Saulo abalisaki ye epai ya Adriyeli, moto ya Meola.
20 Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi. 21 Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. »
Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »
22 Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye : ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo ! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye ! › »
23 Basali ya Saulo bazongelaki maloba oyo epai ya Davidi, kasi Davidi alobaki : « Bokanisi ete kokoma bokilo ya mokonzi ezali likambo ya pete ? Kaka ngai oyo nazali mobola mpe moto pamba ! »
24 Basali ya Saulo bayebisaki ye maloba ya Davidi.
25 Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. »
Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.
26 Tango basali bayebisaki Davidi makambo yango, Davidi asepelaki kokoma bokilo ya mokonzi. Boye liboso ete tango oyo bakataki ekoka, 27 Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi.
28 Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi, 29 Saulo akomaki lisusu kobanga Davidi makasi, mpe akomaki monguna na ye na mikolo ya bomoi na ye, oyo etikalaki. 30 Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda ; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango.