20
Davidi mpe Jonatan
Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye :
— Nasali nini ? Mabe nini nasali ? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai ?
Jonatan azongisaki :
— Te, Ekosalema te ! Okokufa te ! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo ? Ezali bongo te.
Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »
Jonatan alobaki na Davidi :
— Nakosala nyonso oyo okolinga ete ngai nasala mpo na yo.
Davidi azongiselaki Jonatan :
— Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato. Soki tata na yo amitungisi mpo na kozanga na ngai komonana, okoloba na ye : « Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na engumba na ye, Beteleemi, pamba te etuka mobimba ekosepela kuna mbeka oyo babonzaka mibu nyonso. » Soki alobi : « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe. Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ?
Jonatan alobaki :
— Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te !
10 Davidi atunaki Jonatan :
— Bongo soki tata na yo akozongisela yo eyano na kanda, nani akoyebisa ngai ?
11 Jonatan azongiselaki Davidi :
— Yaka, tokende na zamba !
Boye, bango mibale bakendeki nzela moko na zamba. 12 Jonatan alobaki na Davidi : « Na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, lobi to sima na lobi, na ngonga oyo, nakoluka koyeba makanisi ya tata na ngai mpo na yo. Soki ezali malamu, bongo natindi moto te mpo na koyebisa yo yango, 13 wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai ! 14 Sima na mikolo, soki nakozala nanu na bomoi, salela ngai bolamu lokola bolamu ya Yawe mpo ete baboma ngai te. 15 Mpe kolemba te kosalela libota na ngai bolamu, ata tango Yawe akolongola banguna nyonso ya Davidi, na etando ya mokili. »
16 Boye Jonatan asalaki boyokani elongo na libota ya Davidi na maloba oyo : « Tika ete Yawe azongisa mabe na mabe na banguna ya Davidi ! » 17 Mpe Jonatan asengaki ete Davidi alapa lisusu ndayi na ye na kombo ya bolingo na ye Davidi epai ya Jonatan, pamba te azalaki kolinga ye ndenge ye moko amilingaka.
18 Bongo Jonatan alobaki na Davidi :
— Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; bato bakomitungisa mpo na yo mpo ete okozala te, mpe bakomona ete esika na yo ekozala pamba. 19 Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli. 20 Ngai nakobwaka makonga misato na ngambo moko ya libanga yango lokola nde nazali kobwaka na elembo moko. 21 Bongo nakotinda elenge mobali moko kokende koluka makonga yango. Soki nalobi na ye : « Tala, makonga ezali pembeni na yo, lokota mpe yaka na yango awa, » wana nalingi koloba : « Na Kombo na Yawe, yaka mpo ete ozali na kimia, likambo ezali te. » 22 Kasi soki nalobi na elenge mobali : « Tala, makonga ezali mosika na yo ; » wana nalingi koloba : « Kima na yo, pamba te Yawe akimisi yo. » 23 Bongo mpo na liloba oyo tosololaki ngai na yo, yeba ete Yawe azali Motatoli kati na ngai mpe yo mpo na libela.
Saulo akani koboma Davidi
24 Davidi abombamaki kati na zamba. Bongo na tango ya feti ya Sanza ya Sika, mokonzi avandaki na mesa mpo na kolia. 25 Mokonzi avandaki lokola momesano na esika na ye pembeni ya mir. Jonatan atelemaki, mpe Abineri avandaki pembeni ya Saulo, kasi esika ya Davidi ezalaki polele. 26 Saulo alobaki eloko moko te na mokolo wana, pamba te akanisaki kaka ete eloko moko esalemi epai ya Davidi oyo ekomisi ye mbindo. 27 Kasi mokolo oyo elandaki, mokolo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, lokola esika ya Davidi ezalaki lisusu polele, Saulo alobaki na mwana na ye ya mobali, Jonatan :
— Mpo na nini mwana mobali ya Izayi ayei te mpo na kolia, ezala lobi oyo eleki to lelo ?
28 Jonatan azongiselaki Saulo :
— Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na Beteleemi. 29 Alobaki : « Pesa ngai nzela ya kokende mpo ete etuka na ngai esengeli kobonza mbeka kati na engumba, mpe ndeko na ngai ya mobali abengisi ngai mpo ete nazala kuna. Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ngai kokende kotala bandeko na ngai. » Yango wana ayei te na mesa ya mokonzi.
30 Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye :
— Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi ; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo. 31 Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.
32 Jonatan atunaki Saulo, tata na ye :
— Basengeli koboma ye mpo na nini ? Asali nini ?
33 Saulo abwakelaki Jonatan likonga na ye mpo na koboma ye, mpe Jonatan asosolaki ete tata na ye azali na makanisi ya koboma Davidi. 34 Jonatan alongwaki na mesa na kanda makasi mpe atikalaki kolia te na mokolo oyo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, pamba te ayokaki pasi na motema na ndenge tata na ye afingaki Davidi.
35 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jonatan akendeki na zamba kokutana na Davidi. Azalaki elongo na elenge mobali moko. 36 Alobaki na elenge mobali : « Kima mbangu mpe lokota makonga oyo nazali kobwaka. »
Tango elenge mobali azalaki kokima mbangu, Jonatan abwakaki likonga liboso na ye. 37 Mpe tango elenge mobali akomaki na esika oyo likonga ya Jonatan ekweyaki, Jonatan alobaki na ye na mongongo makasi : « Boni, likonga ezali liboso na yo te ? » 38 Bongo Jonatan agangaki lisusu : « Sala noki ! Kima mbangu, kotelema te ! »
Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye. 39 Elenge mobali ayebaki ata eloko moko te na makambo oyo nyonso ; kaka Jonatan mpe Davidi nde bayebaki. 40 Bongo Jonatan apesaki bibundeli na ye epai ya elenge mobali mpe alobaki : « Kende kozongisa yango na engumba. »
41 Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka. 42 Jonatan alobaki na Davidi : « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba : ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › »