6
Bilaka ya somo
Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo,
soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,
omikangi nde singa na maloba na yo,
omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.
Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo
mpo ete omikangola,
pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ;
kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba ;
mikangola na motambo lokola mboloko na maboko
ya mobomi banyama ya zamba,
mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.
Moto ya goyigoyi
Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi,
tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !
Yango ezalaka na mokambi te,
mokengeli te to mokonzi te ;
ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi,
ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.
 
Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ?
Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?
10 Mwa pongi moke, mwa kopema moke,
mwa kokanga maboko moke mpo na kolala
11 mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela,
mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.
Bato ya lokuta
12 Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko
azali moto ya Beliali*, moto mabe :
13 Abetaka-betaka miso,
apesaka bilembo na makolo na ye
mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi ;
14 azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye,
asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe
mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.
15 Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa,
akobukana mbala moko,
mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te.
Makambo oyo Yawe ayinaka
16 Yawe ayinaka makambo wana motoba ;
mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye :
17 Kodongola,
lolemo ya lokuta,
maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,
18 motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe,
makolo oyo epotaka mbangu na mabe,
19 motatoli mabe oyo alobaka lokuta
mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.
 
20 Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo
mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
21 Kanga yango tango nyonso na motema na yo,
lata yango na kingo na yo.
22 Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo,
ekobatela yo tango okolala pongi
mpe ekosolola na yo tango okolamuka.
23 Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole,
makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
24 mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba,
mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya.
 
25 Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye,
mpe miso na ye ekweyisa yo.
 
26 Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba,
okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa,
mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.
27 Boni, moto akoki solo kozika moto,
bongo bilamba na ye ezika te ?
28 Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto,
bongo makolo na ye ezika te ?
29 Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto
na mwasi ya ndeko na ye
akozanga te kozwa etumbu.
 
30 Kotiola moyibi te soki ayibi
mpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia.
31 Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo,
akopesa biloko nyonso ya ndako na ye.
32 Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga
azali lokola moto oyo azangi mayele ;
kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;
33 akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ;
bongo soni na ye ekosila te.
 
34 Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali,
mpe akozala na mawa te na mokolo
oyo akozongisa mabe na mabe ;
35 akotikala kondima ata lifuti moko te
mpo ete akoka kolimbisa,
mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.
* 6:12 Beliali ezali molimo mabe.