7
Makebisi mpo na mwasi ya ndumba
Mwana na ngai, batela mibeko na ngai
mpe bomba yango malamu kati na motema na yo.
Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi ;
batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo.
Lata yango na loboko na yo lokola lopete,
koma yango na etando ya motema na yo.
Loba na Bwanya : « Ozali ndeko na ngai ya mwasi, »
mpe bengaka Mayele « Moninga na ngai ; »
mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba
mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi
oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta.
 
Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu
ya lininisa ya ndako na ngai,
namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele,
kati na bilenge mibali,
elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.
Azalaki koleka na balabala,
pene ya esika oyo mwasi wana ya ndumba avandaka,
mpe akotaki na nzela oyo ekenda
kino na ndako ya mwasi ya ndumba.
Ezalaki na pokwa, tango moyi elimwaki,
mpe molili ya butu ekomaki koya.
 
10 Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki
kokutana na elenge mobali,
alataki penza lokola mwasi ya ndumba,
mpe motema na ye etonda na mayele mabe ;
11 azalaki mwasi ya makelele makasi mpe ya mobulu,
makolo na ye evandaka na ndako te,
12 atalaka-talaka na bisika nyonso,
tango mosusu na libanda,
tango mosusu na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
13 Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali,
ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye :
14 « Nazalaki na niongo ya mbeka ya kozongisa
matondi epai na Yawe ;
mpe lelo, nasili kokokisa ndayi na ngai.
15 Yango wana, nabimaki mpo na kokutana na yo ;
nazalaki koluka yo, mpe, tala, namoni yo.
16 Natandi mbeto na ngai na babulangeti
ya langi ya ndenge na ndenge, basala na basinga ya lino
oyo ewutaka na Ejipito.
17 Na mbeto na ngai, nasopi malasi
ya mire, ya aloe mpe ya sinamoni.
18 Yaka tolangwa bolingo kino na tongo,
tomipesa mobimba na elengi ya bolingo,
19 pamba te mobali na ngai azali na ye na ndako te,
akendeki mobembo na mokili ya mosika,
20 akendeki na saki ya mbongo na maboko,
akozonga na ndako te kino na tango
oyo sanza engengaka. »
 
21 Na nzela ya maloba na ye ya sukali,
alongaki kokosa ye ;
na nzela ya maloba na ye ya elengi, amemaki ye.
 
22 Elenge mobali alandaki ye mbala moko,
lokola ngombe oyo bazali komema
na bisika oyo babomaka banyama,
lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye
23 kino tango likonga ekotobola ye motema,
lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo
na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.
 
24 Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai,
pesa ngai matoyi na yo mpo na koyoka
maloba ya monoko na ngai !
25 Tika ete mwasi ya boye akumba te motema na yo !
Kopengwa te na banzela na ye,
26 pamba te asili kokweyisa mpe kozokisa bato ebele,
mpe asili kobomisa bingambe mibali.
27 Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi,
oyo ememaka kino na bandako ya kufa.