5
Sala keba na ekobo
Mwana na ngai, zala na bokebi na bwanya na ngai,
mpe pesa litoyi na yo na mayele na ngai,
mpo ete ozala na bososoli,
mpe bibebu na yo ebomba boyebi.
Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka
mafuta ya nzoyi,
mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;
kasi na suka na nyonso,
azali bololo lokola masanga ya bololo,
songe lokola mopanga ya minu mibale.
Makolo na ye ekokita kino na kufa,
ekokende kino na mokili ya bakufi.
Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi,
alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
 
Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai,
kopesa maloba na ngai mokongo te ;
longola nzela na yo pembeni na ye
mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
noki te akoya kokaba lokumu na yo
epai ya bato mosusu,
mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;
10 noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi,
mpe mbuma ya mosala na yo ekokende
na ndako ya mopaya ;
11 noki te okokoma kolelalela na suka
tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,
12 mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya,
mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?
13 Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai
mpe napesaki litoyi te epai ya bato
oyo bazalaki koteya ngai ?
14 Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo,
kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
Mwasi ya bolenge na yo
15 Melaka mayi ya libulu na yo moko,
oyo ezali kobima penza na libulu na yo.
16 Boni, bitima na yo esopa penza mayi na libanda
to miluka na yo esopa penza mayi na balabala ?
17 Tika ete ezala kaka mpo na yo moko,
kasi kokabola yango te na bapaya.
18 Tika ete etima na yo epambolama,
mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,
19 oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,
lokola mboloko ya mafuta.
Tika ete tango nyonso,
mabele na ye etondisaka yo na esengo,
mpe bolingo na ye elangwisaka yo !
20 Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela
kolinga mwasi ya ndumba ?
Mpo na nini kosepela kosakana
na mabele ya mwasi mosusu ?
 
21 Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe,
mpe ayekolaka malamu makambo nyonso
oyo moto asalaka.
22 Moto mabe akokangama kaka
na motambo ya mabe na ye moko
mpe na singa ya lisumu na ye,
23 akokufa likolo ya bozoba,
mpe liboma na ye ekobungisa ye nzela.