4
Batoli ya tata
Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata,
bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.
Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ;
bobwaka mateya na ngai te.
Ngai mpe nazalaki mwana malamu
na miso ya tata na ngai,
boye mama na ngai alingaki ngai makasi
lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.
Tata na ngai azalaki koteya
mpe koloba na ngai boye :
« Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai,
bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,
zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te,
kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,
kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo,
linga yango mpe ekobomba yo.
Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya,
pesa biloko nyonso oyo ozali na yango
mpo ete ozwa mayele.
Simba yango makasi, mpe ekotombola yo ;
yamba yango, mpe ekopesa yo lokumu.
Ekolatisa yo ekoti ya lokumu na moto,
ekopesa yo motole ya nkembo. »
 
10 Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai,
mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
11 Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya,
nazali kotambolisa yo na nzela ya alima.
12 Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te
tango okotambola ;
mpe soki okimi mbangu, okokweya te.
13 Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo,
kobwaka yango te, batela yango malamu
mpo ete ezali bomoi na yo.
14 Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu
mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.
15 Longwa kati na bango, kolekela wana te,
kosala mpe maseki kuna te,
kasi kende na yo na nzela mosusu.
16 Pamba te balalaka pongi te
soki basali nanu moto mabe te,
mpe pongi ekimaka bango
soki babomi moto te ;
17 baliaka lipa na nzela ya mabe
mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.
 
18 Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali
lokola pole ya tongo makasi,
oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe
kino tango moyi ekobima makasi.
19 Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili,
bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.
 
20 Mwana na ngai, zala na bokebi na maloba na ngai,
pesa litoyi na yo na mateya na ngai.
21 Tika ete ezala te mosika ya miso na yo !
Batela yango malamu kati na motema na yo,
22 pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango,
mpe epesaka nzoto kolongono.
23 Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso,
pamba te makambo nyonso oyo tosalaka,
wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
24 Longola lokuta na monoko na yo,
mpe longola mabe na bibebu na yo.
25 Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso,
mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.
26 Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela,
mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.
27 Kotengama te,
ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi,
longola makolo na yo na mabe.