3
Elikya na Yawe
Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te,
kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;
pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi,
ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo
mpe ekomemela yo kimia.
 
Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te,
linga yango zingazinga na kingo na yo,
mpe koma yango na etando ya motema na yo !
Okozwa ngolu mpe kombo ya malamu
na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.
 
Ndimela Yawe na motema na yo mobimba,
mpe kotia motema te na mayele na yo.
Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,
mpe Ye akokomisa yango alima.
 
Tika ete omimonaka te moto ya bwanya
na miso na yo moko ;
tosa Yawe mpe longwa na mabe.
Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono
mpe kolendisa mikuwa na yo.
 
Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo
mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.
10 Bongo bibombelo na yo ekotonda na biloko,
mpe bambeki na yo ekotonda na vino.
 
11 Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe,
koboya te pamela na Ye ;
12 pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka,
ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.
Bwanya : bomengo oyo ezanga talo
13 Esengo na moto oyo amoni bwanya !
Esengo na moto oyo azwi mayele !
14 Pamba te kozala na yango eleki kozala
na palata na motuya,
mpe lifuti na yango eleki wolo
oyo balekisi na moto na motuya.
15 Ezali na motuya koleka babiju,
mpe eloko moko te oyo moto akoki koluka
ekokani na yango.
16 Kati na loboko na Ye ya mobali,
ezali na bomoi ya molayi ;
mpe kati na loboko na Ye ya mwasi,
ezali na lokumu mpe bomengo.
17 Nzela na Ye ezali ya esengo,
mpe banzela na Ye nyonso ya mike ezali ya kimia.
18 Bwanya ezali nzete ya bomoi
mpo na bato oyo basimbaka yango ;
bato oyo bakokanga yango makasi
bakozala na esengo.
 
19 Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ;
na nzela ya mayele, alendisaki likolo.
20 Na nzela ya mayele na Ye,
mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi
mpe mapata enokisaki mvula.
Yawe akozala elikya na yo
21 Mwana na ngai, tika ete bwanya mpe bososoli ezala mosika ya miso na yo te ;
batela yango malamu,
22 pamba te ekozala bomoi mpo na yo
mpe ngolu mpo na kingo na yo.
23 Boye, okotambola na kimia na nzela na yo,
mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.
24 Tango okolala, okobanga eloko moko te,
pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.
25 Somo ya pwasa ekobangisa yo te,
ezala tango bato mabe bakobimela yo na pwasa ;
26 pamba te Yawe akozala elikya na yo
mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.
Kolinga baninga
27 Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto
oyo azali na bosenga,
tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.
28 Kolobaka na moninga na yo te :
« Kende, bongo oya sima ; nakopesa yo yango lobi ; »
soki ozali na makoki ya kosala likambo yango.
29 Kosalaka moninga na yo mabe te
soki azali kovanda na kimia epai na yo.
30 Kolukelaka moto makambo te, oyo ezanga tina
soki asali yo mabe te.
 
31 Kolulaka te moto ya mobulu
mpe koponaka ata nzela moko te,
kati na banzela na ye.
 
32 Pamba te Yawe ayinaka bato mabe,
kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.
33 Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe,
kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo ;
34 asambwisaka batioli,
kasi atalisaka ngolu na Ye
epai ya bato oyo bamikitisaka.
35 Bato ya bwanya bakozwa nkembo,
kasi bazoba bakozala na soni.