29
Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye,
akokweyisama na pwasa mpe akobika te.
 
Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka ;
kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.
 
Moto oyo alingaka bwanya asalaka esengo ya tata na ye,
kasi moto oyo alandaka basi ya ndumba
akosilisa bomengo na ye nyonso.
 
Mokonzi oyo akambaka na bosembo
ayeisaka kimia na mokili na ye,
kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele
abebisaka mokili yango.
 
Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali
atielaka ye motambo na se ya matambe.
 
Lisumu ya moto mabe ezalaka na motambo,
kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.
 
Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola,
kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.
 
Batioli batiaka mobulu kati na engumba,
kasi bato ya bwanya basilisaka kanda.
 
Soki moto ya bwanya akei kosamba elongo na moto ya liboma,
ezala asiliki to aseki, akotikala kozala na kimia te.
 
10 Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te,
kasi bato malamu balukaka bato ya sembo.
 
11 Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye,
kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.
 
12 Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta,
basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.
 
13 Mobola mpe monyokoli bazali na likambo moko ya lisanga :
Yawe angengisaka miso ya bango mibale.
 
14 Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo,
kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.
 
15 Fimbu mpe pamela epesaka bwanya,
kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
 
16 Soki bato mabe bakomi ebele,
mabe mpe ekomaka ebele ;
kasi bato ya sembo bakomona bango kokweya.
 
17 Pesa mwana na yo etumbu,
bongo okozala na kimia
mpe akotondisa motema na yo na esengo.
 
18 Soki emoniseli ezali te,
bato bakotambola ngulungulu.
Esengo na moto oyo atosaka Mobeko !
 
19 Bapamelaka mosali na maloba te ;
pamba te akososola, kasi akoyoka te.
 
20 Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa,
malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.
 
21 Moto oyo alengelaka mosali na ye wuta bolenge
akosuka na kokomisa ye moto makasi.
 
22 Moto ya kanda amemaka koswana,
mpe moto oyo atombokaka noki
akomaka na mabe koleka.
 
23 Lolendo ya moto ekitisaka ye,
kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.
 
24 Moto oyo akabolaka biloko elongo na moyibi amiyinaka ;
ayokaka bilakeli mabe, kasi amekaka te kofunda ye.
 
25 Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe,
kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
 
26 Bato ebele balukaka kokoma balingami ya mokonzi,
nzokande ezali Yawe nde apesaka
oyo ekoki na moto na moto.
 
27 Bato ya sembo bayinaka moto ya masumu,
mpe moto mabe ayinaka etamboli ya bato ya sembo.