28
Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye,
kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.
 
Soki kotomboka ezali kati na mokili,
bakonzi bakomaka ebele ;
kasi moto ya mayele mpe ya bososoli ayeisaka kimia.
 
Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelela
azali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka biloko
mpe ememaka nzala.
 
Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe,
kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.
 
Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo,
kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso.
 
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu
koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe.
 
Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele,
kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyenge
ayokisaka tata na ye soni.
 
Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi
abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.
 
Moto oyo akangi matoyi na ye
mpo na koboya koyoka mobeko,
libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.
 
10 Moto oyo amemaka bato ya sembo na nzela ya mabe
akokangama na motambo oyo asali ye moko,
kasi bato oyo bazangi pamela bakozwa esengo lokola libula na bango.
 
11 Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya,
kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu.
 
12 Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi ;
kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi,
bato bamibombaka.
 
13 Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te,
kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.
 
14 Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe,
kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi.
 
15 Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela
azali lokola nkosi ya kanda
to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia.
 
16 Mokonzi oyo anyokolaka bato azangi mayele,
kasi oyo aboyaka bomengo na nzela ya moyibi
ayeisaka mikolo ya bomoi na ye ebele.
 
17 Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moninga
akimaka kino na libulu ya kufa ;
tika ete moto moko te akanga ye nzela.
 
18 Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko,
kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibale
akokweya na moko.
 
19 Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei,
kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi
akotonda na bobola.
 
20 Moto ya sembo afulukaka na mapamboli,
kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombangu
akozanga te kozwa etumbu.
 
21 Kopona bilongi ezalaka malamu te ;
nzokande ata mpo na eteni ya lipa, moto akoki mpe kosala mabe.
 
22 Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto
mpo na kozwa bomengo,
mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.
 
23 Moto oyo apamelaka moninga na ye
akozwa ngolu na suka
koleka moto oyo alobaka maloba ya sukali.
 
24 Moto oyo ayibaka tata mpe mama na ye,
bongo alobaka : « Ezali na yango mabe te, »
azali moninga ya mobomi.
 
25 Moto ya lokoso ayeisaka koswana,
kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe
akotonda na mafuta.
 
26 Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba,
kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama.
 
27 Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te,
kasi moto oyo aboyaka kotala bango
akotonda na bilakeli mabe.
 
28 Tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka ;
kasi tango bakufaka, bato ya sembo bakomaka ebele.