27
Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi,
pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.
 
Tika ete moto mosusu akumisa yo,
kasi monoko na yo moko te ;
tika ete mopaya akumisa yo,
kasi bibebu na yo moko te.
 
Libanga mpe zelo ezalaka kilo,
kasi kanda ya zoba ezalaka kilo koleka nyonso mibale.
 
Kotomboka ememaka makambo ya somo,
mpe kanda ebebisaka ;
kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?
 
Pamela oyo epesami na polele ezali malamu
koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.
 
Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu
koleka babeze ebele ya monguna.
 
Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi,
kasi moto oyo azali na nzala
ayokaka ata bilei ya bololo elengi.
 
Moto oyo ayengaka-yengaka mosika ya mokili na ye
azali lokola ndeke oyo ezali koyengayenga
mosika ya zala na yango.
 
Mafuta mpe malasi esepelisaka motema,
mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.
 
10 Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo,
mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ;
kozala na molingami ya pembeni ezali malamu
koleka kozala na ndeko ya mosika.
 
11 Mwana na ngai, zala moto ya bwanya
mpe sepelisa motema na ngai,
mpo ete nazala na eyano ya kopesa
na moto oyo akoluka kotiola ngai.
 
12 Moto ya mayele amonaka likama na mosika
mpe amibombaka,
kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana
mpe akutanaka na pasi.
 
13 Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi
mpo na niongo ya moto mosusu ;
bomba yango lokola ndanga
soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
 
14 Soki moto moko ayei kopambola molingami na ye,
na mongongo makasi mpe na tongo-tongo,
bakozwa yango lokola elakeli mabe.
 
15 Mwasi oyo alinga koswana azali
lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.
16 Kokanga ye ezali lokola
koluka kokanga mopepe to mafuta na loboko.
 
17 Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu,
ndenge wana mpe moto abongaka
soki akutani na moto mosusu.
 
18 Moto oyo abongisaka nzete na ye ya figi
aliaka mpe mbuma na yango,
mpe moto oyo abatelaka mokonzi azwaka lokumu.
 
19 Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi,
ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.
 
20 Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te,
ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te.
 
21 Bapetolaka palata na kikalungu,
mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi,
kasi bamekaka moto na nzela ya lokumu na ye.
 
22 Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma,
liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.
 
23 Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali,
mpe kengela yango malamu,
24 pamba te bomengo ewumelaka seko na seko te,
motole mpe ewumelaka te mpo na libela.
25 Soki bakati matiti ya bibwele,
matiti ya sika ekobota
mpe bakolokota matiti ya bangomba ;
26 bameme ekopesa yo bilamba,
mpe bantaba ekosunga yo mpo na kosomba elanga.
27 Okozala na miliki ebele ya bantaba
mpo na koleisa ndako na yo mpe basali na yo ya basi.