26
Moto ya zoba
Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge,
mpe mvula enokaka te na tango ya elanga,
ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te.
 
Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano
ekendaka bipai na bipai
to mbilambila* epumbwaka-pumbwaka,
ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te
moto oyo asali na ye mabe te.
 
Ndenge fimbu ezalaka malamu mpo na mpunda,
mpe ekangiseli ezalaka malamu mpo na monoko ya ane,
ndenge wana mpe fimbu ezalaka malamu mpo na mokongo ya zoba.
 
Kozongisela zoba te kolanda bozoba na ye,
noki te okokokana na ye.
 
Zongisela zoba kolanda bozoba na ye,
noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.
 
Moto oyo atindaka sango na nzela ya zoba
azali lokola moto oyo amikati makolo
mpe amilukeli makambo.
 
Ndenge makolo ya ebosono ezalaka makasi te,
ndenge wana mpe masese ezalaka na nguya te
kati na monoko ya zoba.
 
Kopesa zoba lokumu ezali
lokola kotia libanga na ebambelo mabanga.
 
Lisese kati na monoko ya zoba ezali lokola etape ya banzube
kati na loboko ya moto oyo alangwe masanga.
 
10 Moto oyo azwaka zoba to moleki nzela na mosala
azali lokola soda oyo azokisaka moto nyonso na likonga.
 
11 Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi,
ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.
 
12 Eleki malamu kotia elikya na zoba,
na esika ete otia elikya na moto
oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.
 
13 Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ekangi nzela !
Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala ! »
 
14 Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye
ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.
 
15 Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei,
kasi akokaka te kozongisa yango na monoko.
 
16 Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya
koleka bato sambo ya mayele.
 
17 Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye te
azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi.
 
18 Ndenge moto ya liboma abwakaka
moto, makonga mpe kufa,
19 ndenge wana mpe moto oyo akosi moninga na ye
alobaka : « Ezalaki kaka mpo na kosala maseki ! »
 
20 Soki bakoni ezali te, moto ekokufa ;
soki bato ya songisongi bazali te, koswana ekokita.
 
21 Ndenge makala engalaka na mbabola,
mpe bakoni epelisaka moto,
ndenge wana mpe moto oyo alinga koswana
ayeisaka matata.
 
22 Maloba ya moto ya songisongi ezalaka
lokola bilei ya kitoko,
ekitaka na esengo kino na libumu.
 
23 Maloba ya sukali ya moto ya motema mabe
ezalaka lokola palata ya mbindo oyo bapakoli
na mbeki basala na mabele.
 
24 Moto oyo ayinaka moninga na ye
amibombaka na maloba na ye,
kasi atondi na lokuta kati na motema na ye.
25 Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te,
pamba te makambo sambo ya mbindo ebombama
kati na motema na ye.
26 Akoki solo kobomba makanisi na ye ya mabe
na maloba ya lokuta,
kasi motema mabe na ye ekosuka se na koyebana
na miso ya bato nyonso.
 
27 Moto oyo atimolaka libulu
akweyaka ye moko kati na yango ;
mpe moto oyo atindikaka libanga,
libanga yango ekozongela kaka ye moko.
 
28 Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi,
mpe maloba ya sukali ememaka libebi.
 
* 26:2 Mbilambila ezali ndeke ya moke oyo babengaka, na lifalanse : hirondelle.