25
Masese mosusu ya Salomo
Tala masese mosusu ya Salomo oyo bato ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, bakomaki.
Nzambe azwaka nkembo
mpo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te,
mpe bakonzi bazwaka nkembo
mpo ete balukaka kososola tina ya makambo.
Ndenge bakokaka te komeka
bosanda ya Lola to bozindo ya mabele,
ndenge wana mpe bakoki te kososola mitema ya bakonzi.
 
Soki olongoli mbindo na palata,
ekobimisa mbeki mpo na monyangwisi bibende na moto.
Soki olongoli moto mabe liboso ya mokonzi,
kiti na ye ya bokonzi ekolendisama na bosembo.
 
Komikumisaka te liboso ya mokonzi,
mpe komivandisaka te na esika ya bato minene ;
pamba te eleki malamu ete baloba na yo : « Yaka kovanda na esika oyo ya lokumu, »
na esika ete bayokisa yo soni na miso ya mokonzi.
Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi
makambo oyo osili komona na miso,
pamba te okosala nini na suka
soki moninga na yo asukisi yo ?
 
Soki ozali kowelana na moninga na yo,
kobimisa sekele ya moto mosusu te,
10 noki te ayoka yango mpe ayokisa yo soni,
boye okosambwa mpo na libela.
 
11 Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki
ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.
12 Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka
ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.
 
13 Motindami ya sembo azalaka
lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe
na tango ya kobuka bambuma,
asalaka esengo ya mokonzi na ye.
14 Moto oyo amikumisaka ete akabaka,
nzokande apesaka na ye eloko te,
azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.
 
15 Moto oyo akangaka motema
akoki kobongola makanisi ya mokonzi,
mpe maloba ya malamu ebukaka mikuwa.
16 Soki omoni mafuta ya nzoyi, lia oyo ekoki na yo,
pamba te soki olie yango na lokoso, okosanza yango.
 
17 Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo,
noki te akotonda yo mpe akolemba yo.
18 Moto oyo apesaka matatoli ya lokuta
mpo na kosala moninga na ye mabe
azali lokola marto, mopanga mpe mbanzi ya songe.
19 Kotia elikya na zoba na tango na pasi
ezali lokola lino ebukani mpe lokolo elembi.
20 Koyembela moto oyo azali na mawa banzembo ya esengo
ezali lokola kolongola ye kazaka na tango ya malili
to kotia masanga ya ngayi na pota.
 
21 Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ;
soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
22 Pamba te, soki osali bongo,
okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye,
mpe Yawe akofuta yo.
 
23 Mopepe oyo ewutaka na ngambo ya nor, ebetisaka mvula,
mpe lolemo oyo etongaka ekomisaka bilongi kanda-kanda.
 
24 Kovanda na songe ya ndako ezali malamu
koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
 
25 Basango ya malamu oyo ewuti na mokili ya mosika
ezali lokola mayi ya pio kati na motema ya moto
oyo azali na posa ya mayi.
26 Moto ya sembo oyo asopanaka liboso ya moto mabe
azali lokola liziba ya potopoto
mpe etima oyo ebimisaka mayi ya mabe.
 
27 Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele,
mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.
 
28 Moto oyo akokaka te kokonza molimo na ye
azali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.