24
Kolulaka te bato oyo basalaka mabe
mpe kolukaka te kozala elongo na bango,
pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe,
mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi.
 
Ndako etongamaka na nzela ya bwanya,
mpe elendisamaka na nzela ya mayele.
Bashambre ekotondisama na biloko nyonso
ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi.
 
Moto ya bwanya atondi na nguya,
moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye.
Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya,
mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli.
 
Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba,
yango wana azalaka te na likambo ya koloba
kati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke.
Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe
akokende sango lokola moteki baninga.
Mabongisi ya bozoba ezali masumu,
mpe bato bayinaka motioli.
 
10 Soki omilembisi na mokolo ya pasi,
makasi na yo ekozala pamba.
11 Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa,
mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufa
lokola bato oyo balangwe masanga.
12 Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te
kati na makambo oyo nyonso ; »
boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ?
Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ?
Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?
 
13 Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi,
pamba te ezalaka kitoko !
Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala
elengi na lolemo na yo.
 
14 Yeba lisusu ete bwanya ezali elengi
mpo na molimo na yo ;
soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu,
mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
15 Yo moto mabe, komeka te kotia mitambo
kati na ndako ya moto ya sembo,
mpe komeka te kopanza yango,
16 pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo,
akotelema kaka ;
nzokande pasi ekweyisaka moto mabe.
 
17 Soki monguna na yo akweyi, kosepela te ;
mpe soki apengwi, tika ete motema na yo esepela te ;
18 noki te Yawe akomona, akosepela te
mpe akokitisela yo kanda na Ye.
 
19 Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe,
kolula te bato mabe ;
20 pamba te lobi ya malamu ekozala te
mpo na moto oyo asalaka mabe,
mpe mwinda ya bato mabe ekokufa.
 
21 Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi,
kosanganaka te na batomboki,
22 pamba te bango mibale bakoki kotindela batomboki pasi na pwasa.
Bongo, nani ayebi pasi oyo bakoki kotinda ?
Maloba mosusu ya bato ya bwanya
23 Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya :
Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.
24 Moto oyo alobaka na moto mabe : « Ozali moto ya sembo, »
bato bakolakela ye mabe, mpe bikolo ekotombokela ye.
25 Kasi bato oyo bapamelaka moto mabe bakozala malamu
mpe lipamboli ekozala likolo na bango.
 
26 Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.
27 Bongisa libanda ya mosala na yo,
bongisa bilanga na yo,
bongo na sima, tonga ndako na yo.
 
28 Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ;
mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ?
29 Kolobaka te : « Nakosala ye ndenge asali ngai,
nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. »
 
30 Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi,
mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele ;
31 bongo, tala ndenge etondi na banzube,
tala ndenge matiti mabe ezipi yango,
mpe mir na yango ya mabanga ebukani.
32 Tango natiaki makanisi na ngai
kati na makambo oyo namonaki,
nazwaki mayele oyo :
33 mwa pongi moke, mwa kopema moke,
mwa kokanga maboko moke mpo na kolala,
34 bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela,
mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.