23
Soki ovandi mpo na kolia mesa moko elongo na mokonzi,
tala malamu moto oyo azali liboso na yo.
Tia mbeli na mongongo na yo
soki ozalaka lokoso.
Kolula te bilei na ye ya kitoko,
pamba te, tango mosusu, ezali na yango bololo.
 
Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo,
kotia mayele na yo te kati na yango.
Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga,
pamba te ezalaka na mapapu
mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.
 
Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe
mpe kolula te bilei na ye ya kitoko,
pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali.
Alobaka : « Lia mpe mela, »
kasi motema na ye ezali elongo na yo te.
Okosanza eteni oyo oliaki,
mpe maloba na yo ya kitoko ekokende pamba.
 
Kolobaka na zoba te,
pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.
 
10 Kozongisa te na sima mondelo ya kala
mpe kokota te na bilanga ya bana bitike,
11 pamba te Molobeli na bango azalaka makasi,
akozwa makambo na bango na maboko
mpo na kotelemela yo.
 
12 Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko,
mpe matoyi na yo eyokaka maloba ya boyebi !
 
13 Kozangisa te kopesa mwana etumbu ;
soki obeti ye fimbu, akokufa te.
14 Na kobeta ye fimbu,
okokangola molimo na ye na lifelo.
15 Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya,
motema na ngai ekozala na esengo.
16 Solo, bomoto na ngai nyonso ekotonda na esengo,
soki bibebu na yo elobi makambo ya sembo.
 
17 Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu,
kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe ;
18 pamba te suka na yo ekozala solo malamu
mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
 
19 Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya,
batela motema na yo kati na nzela ya sembo.
20 Kozala esika moko te na balangwi masanga
to na bato ya lokoso,
21 pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola,
mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka.
 
22 Yokela tata oyo aboti yo,
mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.
23 Luka bosolo, kasi koteka yango te ;
sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.
24 Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi,
mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.
25 Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela !
Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo !
 
26 Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo,
mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !
27 Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene,
mpe mwasi ya mopaya azali lokola libulu ya mozindo.
28 Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi
mpe akomisaka mibali bazoba koleka.
 
29 Mpo na nani : « Ah ngai, mawa ! »
Mpo na nani : « Eh ! »
Mpo na nani koswanaswana ?
Mpo na nani kolelalela ?
Mpo na nani kowelana ezanga tina ?
Mpo na nani kotelisa miso ?
30 Mpo na bato oyo bawumelaka liboso ya masanga ya vino,
mpo na bato oyo bamelaka masanga ya makasi.
31 Kotalaka te masanga ya vino tango ezali motane,
tango ezali kongala kati na kopo mpe kokita na pete na mongongo.
32 Na suka na yango, ekoswa yo lokola nyoka
mpe ekotia yo minu lokola etupa.
33 Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa,
mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba.
34 Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene,
mpe lokola moto oyo alali na songe ya nzete ya molayi.
35 Okoloba : « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te ;
babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te !
Tango nini nakolamuka ?
Nakozongela lisusu komela vino. »