22
Kokende sango ya malamu ezali malamu
koleka kozala na bomengo mingi ;
lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.
 
Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga :
ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.
 
Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka,
kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.
 
Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka
bozwi, lokumu mpe bomoi.
 
Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo,
kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.
 
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
 
Mozwi azalaka mokonzi ya mobola,
mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.
 
Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi,
mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.
 
Moto oyo akabaka na esengo akopambolama,
pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.
 
10 Bengana motioli,
bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.
 
11 Moto oyo alingaka kozala peto na motema,
oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye,
mokonzi azalaka molingami na ye.
 
12 Miso na Yawe ebatelaka boyebi,
kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.
 
13 Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda,
ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »
 
14 Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ;
moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.
 
15 Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba,
bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
 
16 Moto oyo anyokolaka mobola
mpo ete akoma na bomengo mingi
mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.
Maloba ya bato ya bwanya
17 Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya,
mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.
18 Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo,
mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.
19 Nateyi yo yango lelo
mpo ete elikya na yo ezala kati na Yawe.
20 Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato,
batoli ya bwanya mpe ya boyebi,
21 batoli oyo epesaka mateya ya solo
mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo
na moto oyo atindi yo ?
 
22 Kobotola te na makasi biloko ya mobola,
pamba te azali mobola,
konyokola te moto ya pasi na esambiselo,
23 pamba te Yawe akobundela bango
mpe akobebisa bomoi ya bato
oyo bakobebisa bomoi na bango.
 
24 Kozala molingami te ya moto ya kanda,
mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,
25 noki te okoyekola nzela na ye
mpe okokangama na motambo na ye.
 
26 Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko
mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu,
27 pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te,
mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala ?
 
28 Kozongisa na sima te mondelo ya kala
oyo batata na yo bakataki.
 
29 Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu ?
Akosala kaka liboso ya bakonzi,
akosala te liboso ya bato ya molili.