21
Kati na loboko na Yawe,
motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka
oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.
 
Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye,
kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
 
Na miso na Yawe,
kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuya
koleka bambeka ya kotumba.
 
Miso ya lofundu, motema ya lolendo
mpe kongenga ya bato mabe ezali masumu.
 
Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala
ememaka ye na bomengo,
kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.
 
Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molinga
oyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.
 
Makambo ya bato mabe ebebisaka bango moko,
pamba te baboyaka kosala makambo ya sembo.
 
Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku,
kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.
 
Kovanda na songe ya ndako ezali malamu
koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
 
10 Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe ;
ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.
 
11 Tango bapesaka motioli etumbu,
zoba akomaka moto ya bwanya ;
mpe tango bapesaka malako epai ya moto ya bwanya,
azwaka solo boyebi.
 
12 Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambo
oyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe,
mpe akweyisaka bango kati na pasi.
 
13 Soki moto akangi matoyi na ye
mpo na koboya koyoka koganga ya mobola,
ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.
 
14 Likabo oyo bapesi na nkuku ekitisaka kanda,
mpe kado oyo batie na tolo ekitisaka kanda makasi.
 
15 Ezali esengo mpo na moyengebene kosambisa makambo na sembo,
kasi yango ezali pasi makasi mpo na bato oyo basalaka mabe.
 
16 Moto oyo abungi nzela ya bwanya
akovanda kati na lisanga ya bakufi.
 
17 Moto oyo alingaka biyenga akokoma mobola ;
moto oyo alingaka masanga ya vino mpe mafuta
akotikala kokoma mozwi te.
 
18 Moto mabe azalaka lokola motuya oyo bafutaka
mpo na kosikola moto ya sembo ;
moto ya sembo te azalaka lokola motuya
oyo bafutaka mpo na kosikola moto ya alima.
 
19 Kovanda kati na esobe ezali malamu
koleka kovanda esika moko na mwasi
oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.
 
20 Bilei ya kitoko mpe mafuta ezalaka
kati na ndako ya moto ya bwanya,
kasi moto oyo azangi mayele abebisaka yango.
 
21 Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo
akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.
 
22 Moto ya bwanya abundisaka engumba ya bato ya makasi,
mpe akweyisaka bandako ya makasi
oyo bato batielaka mitema.
 
23 Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye
abatelaka molimo na ye na pasi.
 
24 Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali : « Motioli. »
Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.
 
25 Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye,
pamba te maboko na ye eboyaka kosala.
26 Mokolo mobimba,
akufaka na ye kaka na baposa makasi ;
kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.
 
27 Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ;
ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.
 
28 Motatoli ya lokuta akokufa,
kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.
 
29 Moto mabe akangaka elongi na ye,
kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.
 
30 Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te
mpe toli moko te ekoki kolonga.
 
31 Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba,
kasi elonga ewutaka na Yawe.