30
Maloba ya Aguri
Tala maloba ya Aguri, mwana mobali ya Yake. Ezali ye nde alobaki yango epai ya Itieli, epai ya Itieli mpe Ukali :
Solo, nazali zoba koleka bato nyonso,
nazali ata na mayele ya bomoto te ;
nayekolaki bwanya te,
mpe nazali na boyebi ya Mosantu te.
 
Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ?
Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ?
Nani akanga mayi na kazaka na ye ?
Nani akata bandelo nyonso ya mabele ?
Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ?
Yebisa ngai soki oyebi !
 
 
Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te,
ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango
lokola ebombamelo na bango.
Kobakisa eloko moko te na maloba na Ye,
noki te apamela yo mpe abimisa yo mokosi.
 
Oh Yawe, nasengi Yo biloko mibale,
kopimela ngai yango te liboso ete nakufa :
longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta,
kopesa ngai te bobola to bozwi,
kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai,
pamba te soki natondi makasi,
nakoki kowangana Yo mpe koloba :
« Yawe nde nani ? »
To soki nazali na bobola, nakoki koyiba
mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.
 
10 Kotonga mowumbu te liboso ya nkolo na ye,
noki te alakela yo mabe, mpe omona pasi.
 
11 Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe
mpe bapambolaka te bamama na bango.
12 Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko,
nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.
13 Ezali na bato oyo batonda na lolendo
mpe bamonaka bato mosusu pamba.
14 Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga,
lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili
mpe bato bakelela kati na bato.
 
15 Sonzo ezalaka na bana basi mibale,
egangaka kaka : « Pesa ! Pesa ! »
 
Ezali na biloko misato oyo etondaka te,
minei oyo elobaka te : « Ekoki ! »
16 Mboka ya bakufi,
libumu ya mwasi oyo abotaka te,
mabele oyo etondaka mayi te,
mpe moto oyo elobaka te : « Ekoki ! »
 
17 Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama,
ekotobolama na bayanganga ya lubwaku,
mpe bana ya mpongo ekolia yango.
 
18 Ezali na biloko misato oyo nasosolaka te,
ata kutu minei oyo nayebaka te :
19 Nzela ya mpongo na likolo,
nzela ya nyoka na likolo ya libanga,
nzela ya masuwa kati na ebale,
mpe nzela ya elenge mobali epai ya elenge mwasi.
 
20 Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka :
Soki alie, apangusaka monoko ;
mpe na sima, akoloba : « Nasali na ngai mabe te ! »
 
21 Ezali na makambo misato oyo eningisaka mokili,
ata kutu minei oyo mokili ekokaka kondima te :
22 Mowumbu oyo akomi mokonzi,
zoba oyo atondi na bomengo,
23 mwasi oyo balingaka te, kasi abali ;
mpe mwasi mosali oyo azwi bomengo ya nkolo na ye ya mwasi.
 
24 Ezali na banyama mike minei na mokili, oyo, nzokande, ezalaka na bwanya mingi :
25 Bafurmi : ezali bikelamu oyo ezanga makasi,
kasi ebongisaka bilei na yango na tango ya elanga ;
26 bampanya ya zamba : ezali bikelamu oyo ezanga nguya,
kasi etongaka bandako na yango kati na mabanga ;
27 mabanki : ezalaka na mokonzi te,
kasi nyonso etambolaka nzela moko na molongo ;
28 moselekete : loboko ekoki kokanga yango,
kasi ezalaka kati na bandako ya bakonzi.
 
29 Ezali na banyama misato oyo etambolaka malamu,
ata kutu minei oyo edendaka soki ezali kotambola :
30 Nkosi : nyama ya makasi kati na banyama, ezongaka sima te ata liboso ya nani ;
31 soso ya mobali,
ntaba mobali,
mpe mokonzi oyo azali kotambola liboso ya mampinga na ye.
 
32 Soki osali bozoba mpo na komikumisa,
mpe soki ozali na makanisi mabe,
tia loboko na monoko na yo,
33 pamba te kobeta-beta mabele ebimisaka manteka,
kobeta zolo ebimisaka makila,
mpe kotumbola kanda eyeisaka koswana.