18
Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye,
atelemelaka bososoli nyonso.
 
Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa
tango ya kokanisa,
kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.
 
Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ;
soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.
 
Maloba ya monoko ya moto ezalaka
lokola mayi ya mozindo ;
etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebale
oyo etondi makasi.
 
Ezali malamu te kolongisa moto mabe
mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.
 
Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana,
mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.
 
Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa,
mpe bibebu na ye ezalaka motambo
mpo na molimo na ye moko.
 
Maloba ya moto ya songisongi ezalaka
lokola bilei ya kitoko,
ekitaka na esengo kino na libumu.
 
Moto oyo azongaka sima na mosala na ye
azali ndeko ya mobebisi.
 
10 Kombo ya Yawe ezali
lokola ndako molayi batonga makasi ;
moyengebene akimelaka kuna
mpe azwaka ebombamelo ya makasi.
 
11 Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,
oyo batonga makasi ;
akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.
 
12 Liboso ete moto akweya,
motema na ye ekomaka na lolendo ;
kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.
 
13 Kopesa eyano liboso ya koyoka
ezali liboma mpe bozoba.
 
14 Kimia kati na motema elendisaka moto
na tango ya bokono,
kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?
 
15 Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele,
mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.
 
16 Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela
mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.
 
17 Moto ya liboso na kosamba amonanaka
lokola nde alongi ;
kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei,
akotelemela ye.
 
18 Zeke esilisaka koswana
mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.
 
19 Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe
ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ;
mpe koswana na moto ezali lokola kokanga
bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.
 
20 Moto atondisaka libumu na ye
na nzela ya mbuma ya monoko na ye
mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.
 
21 Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ;
moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
 
22 Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo,
azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
 
23 Mobola alobaka na mongongo ya kobondela,
kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.
 
24 Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi,
kasi ezali na molingami moko ya motema,
oyo aleki ata ndeko.