17
Kolia na kimia ndambo ya lipa ya kokawuka ezali malamu
koleka kovanda na ndako etonda na misuni elongo na koswana.
 
Mosali ya bwanya akozala na bokonzi
likolo ya mwana mobali oyo asalaka soni,
mpe akozwa libula elongo na bandeko.
 
Bapetolaka palata na kikalungu,
mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi,
kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
 
Moto oyo asalaka mabe ayokaka maloba ya bato mabe,
mokosi apesaka litoyi na ye na maloba ya lokuta.
 
Moto oyo anyokolaka mobola
anyokolaka Mokeli ya mobola yango ;
moto oyo asepelaka na pasi ya moninga
akozanga te kozwa etumbu.
 
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
 
Ndenge maloba ya lokumu ebongi te mpo na moto mabe,
ndenge mpe maloba ya lokuta ebongi te mpo na mokonzi.
 
Kanyaka ezalaka lokola kisi na miso ya moto
oyo azali na yango ;
alongaka na esika nyonso oyo akendaka.
 
Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo,
kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso
akabolaka bato oyo balingani.
 
10 Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele,
kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka
na litomba te.
 
11 Moto mabe alukaka kaka kotomboka,
kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe
mpo na kotelemela ye.
 
12 Kokutana na ngombolo oyo babotoli bana ezali malamu
koleka kokutana na zoba oyo azali kati na bolema.
 
13 Pasi etikaka ata moke te ndako ya moto
oyo azongisaka mabe mpo na malamu.
 
14 Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ;
tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.
 
15 Moto oyo alongisaka bato mabe
mpe moto oyo akweyisaka bato ya sembo
bazali, bango mibale, nkele na miso ya Yawe.
 
16 Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba ?
Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te !
 
17 Molingami alingaka tango nyonso,
mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.
 
18 Moto oyo azangi mayele abetaka tolo
mpo na kondima baniongo ya mopaya.
 
19 Moto oyo alingaka koswana alingaka masumu ;
moto oyo atongaka ekuke na ye na likolo
amilukelaka kokweya.
 
20 Moto ya motema mabe abongaka te,
mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.
 
21 Kozala na mwana ya zoba esalaka pasi na motema,
mpe tata ya moto ya liboma akotikala kozala na esengo te.
 
22 Motema ya esengo ebikisaka nzoto,
kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.
 
23 Moto mabe azwaka kanyaka na nkuku
mpo na kobebisa nzela ya bosembo.
 
24 Bwanya emonanaka na elongi ya moto ya mayele,
kasi miso ya zoba ekendaka kino na suka ya mokili.
 
25 Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa,
mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.
 
26 Ezali malamu te kopesa moto ya sembo etumbu,
mpe ezali malamu te kobeta bato ya lokumu
na miso ya bosembo.
 
27 Moto oyo abatelaka monoko na ye azali na boyebi ;
moto oyo alengaka-lengaka te azali mayele.
 
28 Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia,
amonanaka lokola moto ya bwanya ;
moto oyo akangaka monoko na ye
amonanaka lokola moto ya mayele.