16
Motema ya moto esalaka mabongisi,
kasi eyano ewutaka epai na Yawe.
 
Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye,
kasi Yawe nde amekaka mitema.
 
Pesa misala na yo epai na Yawe,
mpe mabongisi na yo ekokokisama.
 
Yawe asalaka makambo nyonso na tina,
ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
 
Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ;
solo, akozanga te kozwa etumbu.
 
Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ;
kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
 
Soki Yawe asepeli na nzela ya moto,
akoyokanisa ye na banguna na ye.
 
Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu
koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.
 
Motema ya moto esalaka mabongisi,
kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.
 
10 Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe,
ekweyaka te kati na kosambisama.
 
11 Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo
ezali ya Yawe,
mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye.
 
12 Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe,
pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.
 
13 Bakonzi balingaka maloba ya solo,
mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.
 
14 Kanda ya mokonzi ememaka na kufa,
kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.
 
15 Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga,
elingi koloba : bomoi.
Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka.
 
16 Bwanya ezali malamu koleka wolo,
mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.
 
17 Bato ya sembo batambolaka
na nzela oyo epesaka mabe mokongo.
Moto oyo abatelaka motema na ye
abatelaka nde bomoi na ye.
 
18 Lolendo eyaka liboso ya kobebisama,
mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.
 
19 Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela
ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba
elongo na bato ya lolendo.
 
20 Moto oyo akanisaka na tina na makambo
amonaka bolamu.
Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.
 
21 Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya
moto ya mayele,
mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi.
 
22 Mayele ezali etima ya bomoi
mpo na bato oyo bazali na yango,
kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.
 
23 Motema ya moto ya bwanya ekomisaka
monoko na ye mayele,
mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi.
 
24 Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi,
epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.
 
25 Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato,
nzokande, na suka, ememaka na kufa.
 
26 Nzala etindaka mosali ete asala mosala,
monoko na ye etindikaka ye na mosala.
 
27 Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe,
mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.
 
28 Moto mabe alonaka koswana,
moto ya songisongi akabolaka baninga.
 
29 Moto ya mobulu abendaka moninga na ye
mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.
 
30 Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye
mpo na kosala mabongisi ya mabe
asili kosala masumu.
 
31 Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ;
bazwaka yango na nzela ya bosembo.
 
32 Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe,
mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi
koleka moto oyo abotolaka bingumba.
 
33 Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe,
kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.