15
Eyano ya kimia ekimisaka kanda,
kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.
 
Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi,
kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele
ebimisaka bozoba.
 
Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso
mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.
 
Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi,
kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.
 
Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye,
kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
 
Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene,
kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi.
 
Bibebu ya moto ya bwanya esopaka boyebi,
kasi ezali bongo te na motema ya zoba.
 
Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe,
kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
 
Nzela ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe,
kasi alingaka moto oyo alandaka nzela ya sembo.
 
10 Moto oyo abimaka libanda ya nzela ya sembo
akozwa pamela ya makasi ;
moto oyo aboyaka pamela akokufa.
 
11 Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo
ezali penza polele liboso ya Yawe,
ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato
ezali polele liboso na Ye.
 
12 Moto ya moto makasi alingaka te moto oyo apamelaka ye,
yango wana akendaka te epai ya bato ya bwanya.
 
13 Motema ya esengo engengisaka elongi,
kasi motema ya mawa elembisaka molimo.
 
14 Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi,
kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka bozoba.
 
15 Mikolo nyonso ezalaka mabe
mpo na moto oyo azali na pasi,
kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka
tango nyonso na feti.
 
16 Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu
koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
 
17 Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu
koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.
 
18 Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana,
kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
 
19 Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka
lokola banzela mike ya banzube,
kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
 
20 Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,
kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
 
21 Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele,
kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.
 
22 Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te
mpo na kopesa mayele,
kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
 
23 Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo,
mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
 
24 Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo,
mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te.
 
25 Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo,
kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.
 
26 Makanisi ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe,
kasi maloba ya malamu ezalaka peto na miso na Ye.
 
27 Moto oyo alukaka litomba na nzela ya sembo te
amemaka mitungisi na libota na ye,
kasi moto oyo aboyaka kanyaka akozala na bomoi.
 
28 Motema ya moyengebene ekanisaka
liboso ya kopesa eyano,
kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.
 
29 Yawe azalaka mosika ya bato mabe,
kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.
 
30 Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ;
sango malamu elendisaka mikuwa.
 
31 Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi
avandaka kati na bato ya bwanya.
 
32 Moto oyo asundolaka koyekola
atiolaka nde bomoi na ye moko,
kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.
 
33 Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ;
komikitisa eyaka liboso ya nkembo.