14
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye,
kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango
na maboko na ye moko.
 
Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe,
kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.
 
Kati na monoko ya moto oyo azangi mayele,
ezalaka na nzete ya lolendo,
kasi bibebu ya moto ya bwanya ebatelaka ye.
 
Esika oyo ezalaka na ngombe te,
elielo mpe ezalaka na eloko te,
pamba te ezali makasi ya bangombe nde epesaka bomengo.
 
Motatoli ya sembo akosaka te,
kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
 
Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te,
kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.
 
Zala mosika ya zoba,
pamba te okotikala kozwa boyebi te na bibebu na ye.
 
Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye,
kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele : lokuta.
 
Bazoba balingaka te kosenga bolimbisi,
kasi ngolu na Nzambe ezalaka kati na bato ya sembo.
 
10 Motema eyebaka pasi na yango moko,
moko te akoki kokabola na yango esengo.
 
11 Ndako ya moto mabe ekobukana,
kasi ndako ya kapo ya bayengebene ekofuluka.
 
12 Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato,
nzokande, na suka, ememaka na kufa.
 
13 Ezala kati na koseka, motema ekoki kozala na mawa,
mpe esengo ekoki kosuka na mawa.
 
14 Bato oyo batambolaka na boyengebene te
bakozwa lifuti kolanda misala na bango,
kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti
kolanda misala na ye.
 
15 Moto oyo azangi mayele andimaka
makambo nyonso oyo balobaka,
kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.
 
16 Moto ya bwanya abangaka mabe mpe akimaka yango,
kasi zoba atombokaka, na elikya nyonso.
 
17 Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba,
mpe bayinaka moto ya mayele mabe.
 
18 Bato oyo bazangi mayele bazwaka bozoba lokola libula,
kasi bato ya mayele bazwaka boyebi lokola motole.
 
19 Bato mabe bakofukama liboso ya bato ya malamu,
bato ya mitema mabe bakofukama
na ekuke ya bato ya sembo.
 
20 Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko,
kasi mozwi azalaka na baninga ebele.
 
21 Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu,
kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.
 
22 Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe
bazali na libunga te ?
Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato
oyo babongisaka kosala bolamu.
 
23 Mosala nyonso epesaka litomba,
kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.
 
24 Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka
lokola motole na bango,
kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka
lokola liboma.
 
25 Motatoli oyo alobaka solo abikisaka bato ebele,
kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
 
26 Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi,
mpe bana na ye bakozwa ekimelo.
 
27 Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi,
ekangolaka na mitambo ya kufa.
 
28 Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu,
kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.
 
29 Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele,
kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka
bozoba na ye.
 
30 Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto,
kasi bilulela epolisaka mikuwa.
 
31 Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka
Mokeli ya mobola yango,
kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu
apesaka Ye lokumu.
 
32 Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye,
kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.
 
33 Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto
oyo azali na bososoli ;
kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba ?
 
34 Bosembo etombolaka ekolo,
kasi lisumu ememelaka bato soni.
 
35 Mokonzi asepelaka na mosali ya bwanya,
kasi mosali oyo ayokisaka ye soni apelisaka kanda na ye.