19
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu
koleka mokosi oyo azangi mayele.
 
Ezali malamu te kobungisa mayele,
kati na bolingo oyo eleka ndelo.
Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki
ezangaka te kobeta libaku.
 
Bozoba ya moto ebebisaka bomoi na ye ;
mpe, na sima, akomaka kotombokela Yawe.
 
Mozwi azalaka na baninga ebele,
kasi mobola akabwanaka
ata na molingami na ye ya motema.
 
Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ;
moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.
 
Bato mingi balukaka kosepelisa moto ya lokumu,
mpe moto nyonso alukaka kozala molingami ya moto
oyo asungaka bato.
 
Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye,
mpo na nini baninga na ye bakima ye te ?
Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te.
 
Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ;
moto oyo alingaka mayele alongaka.
 
Motatoli ya lokuta azwaka etumbu ;
moto oyo akosaka akobebisama.
 
10 Bomoi ya lokumu ebongi na zoba te ;
ebongi mpe te na mowumbu kopesa mitindo na bakambi.
 
11 Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi ;
mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba
mabe oyo basalaka ye.
 
12 Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi,
kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.
 
13 Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye ;
koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako,
oyo etangisaka mayi tango nyonso.
 
14 Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo
lokola libula kowuta epai ya batata,
kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
 
15 Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi,
mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
 
16 Moto oyo atosaka mibeko abatelaka molimo na ye ;
moto oyo akebaka te na etamboli na ye akokufa.
 
17 Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola
adefisaka Yawe,
bongo Yawe akozongisela ye bolamu.
 
18 Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu,
kasi kotomboka na yo ekoma te kino
na posa ya koboma ye.
 
19 Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema
mokumba ya kanda na ye ;
pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.
 
20 Yoka toli mpe ndima mateya,
mpo ete okoma moto ya bwanya.
 
21 Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele,
kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.
 
22 Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto
ezali bolingo ya solo,
mpe mobola azali malamu koleka mokosi.
 
23 Kotosa Yawe ememaka na bomoi,
esalaka ete moto azala na kimia ;
boye ata mabe moko te ekokomela ye.
 
24 Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei,
kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.
 
25 Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ;
sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.
 
26 Mwana oyo abetaka tata na ye
mpe abenganaka mama na ye
ayeisaka soni mpe mawa.
 
27 Mwana na ngai, soki otiki koyoka mateya,
okobunga nzela ya maloba ya boyebi.
 
28 Moto oyo atiolaka bosembo azali motatoli ya zoba ;
mpe monoko ya bato mabe emelaka kaka mabe.
 
29 Etumbu esalema mpo na batioli,
mpe fimbu esalema mpo na bazoba.