Mibeko mpo na Banganga-Nzambe
6
Na tina na mbeka ya kotumba
Yawe alobaki na Moyize : « Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba : mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango. Nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino mpe bakaputula na ye ya lino. Akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisaki na etumbelo mpe akotia yango na mopanzi ya etumbelo. Sima, akolongola bilamba wana mpe akolata bilamba mosusu ; bongo akomema putulu na libanda ya molako, na esika ya peto. Moto ya etumbelo ekobanda kopela tango nyonso mpe ekoki kokufa te. Nganga-Nzambe akobanda kobakisa tongo nyonso bakoni mpe kotia mbeka ya kotumba na likolo ya bakoni ; bongo akotumba biteni ya mafuta ya mbeka ya boyokani na likolo na yango. Moto esengeli kopela tango nyonso na etumbelo, ekoki kokufa te. ›
‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato : ‘ Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo. Nganga-Nzambe akozwa na loboko na ye ndambo ya farine, mafuta mpe ansa nyonso oyo ezali na likolo ya gato ; akotumba yango na likolo ya etumbelo mpo ete solo kitoko na yango esepelisa Yawe mpe ezala ekaniseli mpo na Ye. Ndambo oyo ekotikala, Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia yango. Kasi bakolia yango ezanga levire, na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 10 Bakotumba yango te na levire : ezali eteni oyo napesi bango kati na bambeka na Ngai oyo etumbami na moto : ezali eloko ya bule penza lokola mbeka mpo na masumu mpe mpo na kozongisa boyokani. 11 Bana mibali nyonso kati na bakitani ya Aron bakolia yango. Ezali eteni na bango mpo na tango nyonso mpe na milongo nyonso kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Bato nyonso oyo bakosimba yango bakokoma bule. ’ › »
12 Yawe alobaki na Moyize : 13 « Tala likabo oyo Aron mpe bana na ye ya mibali bakopesa epai na Yawe, na mokolo oyo bakozwa epakolami : eteni ya zomi ya efa ya farine lokola likabo ya tango nyonso. Na tongo, akopesa eteni moko kati na biteni mibale ; mpe eteni mosusu, na pokwa. 14 Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
15 Mwana mobali ya Aron oyo bakopakola mafuta mpo na kokitana na Aron lokola Nganga-Nzambe akobonza mpe likabo yango : ezali likabo ya libela mpo na Yawe mpe bakotumba yango mobimba. 16 Mbeka nyonso oyo Nganga-Nzambe akobonza na mobimba na yango ekoliama te, ezala ata ndambo na yango. »
Na tina na mbeka mpo na masumu
17 Yawe alobaki na Moyize : 18 « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu : ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba ; ezali mbeka ya bule penza. 19 Nganga-Nzambe oyo azali kobonza yango mpo na masumu akolia yango na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 20 Moto nyonso oyo akosimba mosuni na yango akozala bule. Soki kaka makila ya mbeka yango ezwi elamba na ye, asengeli kosukola esika oyo ezwi makila, na esika moko ya bule. 21 Bongo soki basaleli nzungu ya mabele mpo na kokalinga mosuni ya mbeka mpo na masumu, bakopanza nzungu yango. Soki bakalingi yango na nzungu ya bronze, bakopalola nzungu yango mpe bakosukola yango na mayi ebele. 22 Kaka mibali oyo bazali na libota ya Nganga-Nzambe nde bakoki kolia yango, pamba te ezali eloko ya bule penza. 23 Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ; esengeli kotumba yango na moto. ’ › »