5
Ndakisa ya masumu oyo elimbisamaka
« Soki moto ayoki mbela ya elakeli mabe na tina na likambo oyo amonaki mpe ayebi, bongo aboyi kotatola yango, asali masumu mpe amemi ngambo.
Soki moto asimbi na kozanga koyeba eloko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo to ebembe ya nyama ya mboka ya mbindo to ebembe ya nyama ya mbindo oyo etambolaka na libumu, moto yango akomi mbindo mpe amemi ngambo.
Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango. Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo. Boye, soki amemi ngambo na moko kati na makambo oyo, asengeli kotubela masumu oyo asali mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango.
Mbeka mpo na masumu ya mobola
Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba. Akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akobonza liboso mbeka ya masumu : akokata yango kingo kasi akolongola moto te. Akosopa ndambo ya makila na yango pembeni ya etumbelo ; mpe ndambo mosusu, na makolo ya etumbelo : ezali mbeka mpo na masumu. 10 Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza mbeka oyo ya mibale lokola mbeka ya kotumba, kolanda ndenge ekatama na mibeko. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.
11 Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu. 12 Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na masumu. 13 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. »
Mbeka mpo na kozongisa boyokani
14 Yawe alobaki na Moyize :
15 « Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani. 16 Lisusu, mpo na mabe oyo asali liboso ya Esika ya bule, moto yango asengeli kobakisa likolo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani : eteni moko kati na biteni mitano ya motuya ya mbeka wana. Boye akopesa biloko nyonso epai ya Nganga-Nzambe, mpe Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana na nzela ya meme ya mobali oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; boye moto yango akolimbisama.
17 Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo ; mpe akomema mokumba ya mabe na ye.
18 Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama. 19 Ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani, pamba te amemaki ngambo na ndenge asalaki masumu liboso ya Yawe. »
20 Yawe alobaki na Moyize : 21 « Soki moto asali masumu mpe abuki mobeko ya Yawe na kokosa moninga na ye mpo na eloko oyo babombisaki epai na ye to oyo adefaki to oyo ayibaki to oyo abotolaki na makasi 22 to atako amoni eloko oyo ebungaki, kasi akosi mpe alapi ndayi ya lokuta na tina na moko kati na masumu oyo moto akoki kosala ; 23 moto oyo asali masumu ya boye mpe amemi ngambo, akozongisa eloko oyo ayibisaki to oyo abotolaki na makasi to oyo babombisaki epai na ye to oyo amonaki sima na kobungisa yango. 24 To lisusu, akozongisa eloko nyonso oyo na tina na yango ye alapaki ndayi ya lokuta mpe akobakisa eteni moko kati na biteni mitano. Akozongisa yango na nkolo eloko na mokolo oyo akobonza mbeka na ye mpo na masumu. 25 Mpe akomema epai ya Nganga-Nzambe mbeka na ye mpo na kozongisa boyokani elongo na Yawe. Akomema meme ya mobali oyo ezanga mbeba ; akozwa yango kati na bameme mpe bantaba na ye kolanda ndenge okokata. 26 Nganga-Nzambe akosala mpo na moto wana, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu ; mpe moto yango akolimbisama. »