7
Na tina na mbeka mpo na kozongisa boyokani
« ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani ; ezali eloko ya bule penza : ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo. Bakobonza biteni na yango ya mafuta : mokila, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe mafuta oyo ezipaka yango, oyo ezali kati na mipanzi mpe loketo. Bakolongola bafwa mpe bambuma mibale wana. Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani. Mibali nyonso kati na Banganga-Nzambe bakoki kolia yango. Basengeli kolia yango na Esika ya bule : ezali eloko ya bule penza. Mobeko yango ezali kaka moko, ezala mpo na mbeka mpo na kozongisa boyokani to mpo na mbeka ya masumu. Nyama ezali ya Nganga-Nzambe oyo asali mosala ya bolimbisi masumu.
Nganga-Nzambe oyo akobonza mbeka ya kotumba mpo na moto, akozwa poso ya nyama oyo abonzi mpe ekozala ya ye.
Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango. 10 Likabo nyonso ya gato oyo basangisi na mafuta to oyo ezali ya kokawuka ekozala ya bana mibali nyonso ya Aron ; bakozwa yango ndenge moko. ’ ›
Na tina na mbeka ya boyokani
11 ‹ Tala mibeko mpo na mbeka ya boyokani oyo moto akoki kobonza epai na Yawe : 12 ‘ Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta. 13 Na likolo ya mbeka na ye ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi, akobakisa likabo ya bagato oyo esalemi na farine batia levire. 14 Akomema eteni ya likabo moko na moko mpe akobonza yango epai na Yawe : ekozala ya Nganga-Nzambe oyo asopaki makila ya mbeka yango ya boyokani pembeni-pembeni ya etumbelo. 15 Mosuni ya mbeka ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango, eloko moko te ekoki kotikala kino na tongo.
16 Soki abonzi mbeka na ye ya boyokani mpo ete apesaki elaka, na kolapa ndayi to wuta na mokano ya motema na ye moko, mbeka esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango. Kasi soki ndambo etikali, ekoliama na mokolo oyo ekolanda. 17 Mosuni oyo ekotikala na mbeka, na mokolo oyo ekolanda, esengeli kotumba yango. 18 Soki mosuni ya mbeka ya boyokani eliami na mokolo ya misato, mbeka yango ekondimama te. Ekotangama te likolo ya moto oyo abonzi yango, pamba te ezali likabo ya mbindo ; mpe moto oyo akomeka kolia yango akomema masumu.
19 Bongo soki mosuni yango etutani na eloko ya mbindo, esengeli batumba mosuni yango na moto.
Kasi mpo na oyo etali mosuni ya mbeka ya boyokani, kaka moto oyo azali peto nde akoki kolia yango. 20 Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. 21 Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › »
Malako mpo na bato : ekila ya kolia mafuta mpe makila
22 Yawe alobaki na Moyize : 23 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Bokolia te mafuta ya ngombe, ya meme to ya ntaba. 24 Nzokande bokoki na bino kosalela mafuta ya nyama oyo ekufa to ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba misala nyonso, kasi bokoki te kolia yango. 25 Moto nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzi epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto, bakolongola ye kati na bato na ye. 26 Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama. 27 Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › »
28 Yawe alobaki na Moyize : 29 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Moto nyonso oyo akobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani akomema eteni ya mbeka na ye lokola mbeka na ye epai na Yawe. 30 Akomema yango ye moko, na maboko na ye, mpo ete etumbama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Akomema mafuta mpe tolo ya mbeka mpe akotombola liboso ya Yawe tolo yango lokola likabo ya kotombola. 31 Nganga-Nzambe akotumba mafuta na etumbelo, kasi tolo ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali. 32 Bokopesa epai ya Nganga-Nzambe lokola likabo mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ya bambeka ya boyokani. 33 Mwana mobali ya Aron oyo akobonza makila mpe mafuta ya mbeka ya boyokani akozwa mopende ya ngambo ya loboko ya mobali. 34 Pamba te, nakobanda kozwa kati na bambeka ya boyokani ya bana ya Isalaele tolo oyo batomboli mpe mopende oyo babonzi lokola likabo ya kotombola. Napesi yango epai ya Nganga-Nzambe Aron mpe bana na ye ya mibali lokola eteni na bango oyo bakobanda kozwa tango nyonso epai ya bana ya Isalaele.
35 Yango nde eteni ya makabo bazikisa na moto, oyo bana ya Isalaele basengeli kopesa epai ya Aron mpe bana na ye ya mibali wuta mokolo oyo akobulisa bango mpo na kosalela Yawe lokola Banganga-Nzambe. › »
36 Yango nde mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bana ya Isalaele mpo ete, wuta mokolo oyo apakolaki bango mafuta, babanda kopesa bango yango lokola eteni na bango. Ezali mibeko ya seko mpo na milongo nyonso ya bana na bango.
37 Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani 38 oyo Yawe apesaki epai ya Moyize, na ngomba Sinai kati na esobe ya Sinai na mokolo oyo apesaki mitindo epai ya bana ya Isalaele ete babonzela Ye bambeka mpe makabo na bango.