24
Etelemiselo ya minda kati na Tempelo
Yawe alobaki na Moyize : « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso. Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron akobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo na bino nyonso. Minda ekozala likolo ya etelemiselo ya minda, esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe ; bakobongisa yango tango nyonso.
Bagato ya kobonzela Nzambe
Okozwa farine mpe okolamba bagato zomi na mibale, okosalela biteni mibale kati na biteni zomi ya efa mpo na gato moko na moko. Okotanda yango na milongo mibale, gato motoba na molongo moko, likolo ya mesa oyo esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe. Na molongo moko na moko, okosopa ansa ya peto oyo ekotumbama na esika ya gato lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, mpe ekozala ekaniseli.
Mikolo nyonso ya Saba, bokobonza lipa yango liboso ya Yawe na kombo ya bana ya Isalaele lokola boyokani ya libela. Gato yango ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali ; bana na ye ya mibali bakolia yango na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule koleka kati na biteni na bango oyo bazwaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Ezali mobeko mpo na libela. »
Motioli asengeli na kufa
10 Ezalaki na mwana mobali moko oyo mama na ye azalaki moto ya Isalaele mpe tata na ye, moto ya Ejipito ; apusanaki kati na bana ya Isalaele mpe abundisaki moto ya Isalaele kati na molako. 11 Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani. 12 Batiaki ye na boloko kino kozela ete Yawe alakisa bango mokano na Ye.
13 Yawe alobaki na Moyize : 14 « Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.
15 Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ; 16 soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye : bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye.
17 Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye. 18 Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi : kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi.
19 Soki moto azokisi moninga na ye, bakosala ye ndenge asalaki moninga : 20 soki abuki eteni ya nzoto, ye mpe bakobuka ye eteni ya nzoto ; soki atoboli liso, ye mpe bakotobola ye liso ; soki abuki linu, ye mpe bakobuka ye linu ; ndenge azokisi moto mosusu, ndenge wana mpe bakozokisa ye.
21 Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu ; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye.
22 Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
23 Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.