Mibeko na tina na bafeti
23
Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokobanda kosangana mpo na kosala bafeti mpo na lokumu na Ngai, bokobanda kobengisa bato mpo na kogumbamela Ngai Yawe, pamba te ezali mayangani ya bule.
Mokolo ya Saba
Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe.
Tala bafeti mosusu ya Yawe, mayangani ya bule oyo bokobengisela bato na mikolo oyo ekatama mpo na kopesa Ngai lokumu.
Feti ya Pasika mpe feti ya mapa ezanga levire
Pasika ya Yawe ekobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso. Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana nde feti ya Mapa ezanga levire mpo na Yawe ekobanda. Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo. Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › »
Feti ya bambuma ya liboso
Yawe alobaki na Moyize : 10 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka. 11 Na mokolo oyo ekolanda Saba, Nganga-Nzambe akobonza liboke yango na kotombola liboso ya Yawe mpo ete Ngai nandima yango. 12 Na mokolo yango, bakobonza liboke yango na kotombola, bokobonzela Yawe mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba. 13 Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga. 14 Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala.
Feti ya baposo
15 Bosengeli kotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo elandi mokolo ya Saba, mokolo oyo bokomema liboke ya bambuma mpo ete batombola yango ; baposo nyonso sambo esengeli kozala ya kokoka. 16 Bokotanga mikolo tuku mitano kino na mokolo oyo ekolanda mokolo ya Saba. Na mokolo wana ya Saba, bokobonza epai na Yawe likabo ya bambuma ya sika. 17 Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola ; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe. 18 Elongo na mapa wana, bokobonza lokola mbeka ya kotumba : bana meme sambo ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba, ngombe moko ya mobali mpe bameme mibale ya mibali. Bokobonza yango mpo na Yawe, elongo na makabo na yango ya bambuma mpe ya masanga, lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. 19 Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani. 20 Nganga-Nzambe akobonza na kotombola, liboso ya Yawe, bana meme yango mibale elongo na mapa ya bambuma ya liboso. Ekozala makabo ya bule mpo na Ngai Yawe mpe ekozala ya Nganga-Nzambe. 21 Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.
22 Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
Feti ya bakelelo to mokolo ya ekaniseli
23 Yawe alobaki na Moyize : 24 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai. 25 Bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala, kasi bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. › »
Mokolo ya bolimbisi masumu
26 Yawe alobaki na Moyize : 27 « Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai ; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. 28 Bokosala mosala moko te na mokolo wana, pamba te ezali mokolo ya kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso na Ngai Yawe, Nzambe na bino. 29 Moto nyonso oyo akokila bilei te na mokolo wana, bakolongola ye kati na bato na ye. 30 Nakoboma moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo wana. 31 Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino. 32 Ekozala mpo na bino mokolo ya kopema lokola mokolo ya Saba, mokolo ya komikitisa. Bokobatela mokolo na bino ya Saba, kobanda na pokwa ya mokolo ya libwa kino na pokwa ya mokolo oyo ekolanda. »
Feti ya bandako ya kapo
33 Yawe alobaki na Moyize : 34 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe. 35 Mokolo ya liboso ekozala mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala mokolo na mokolo. 36 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala.
37 Oyo nde bafeti oyo bokobanda kosala mpo na lokumu ya Yawe, mpe oyo bokobanda kobengisela bato na mayangani ya bule mpo ete basambela Yawe mpe babonzela Ye makabo bazikisa na moto, bambeka ya kotumba mpe makabo ya bagato, bambeka mpe bambeka ya masanga ya vino, kolanda ndenge ekatama mpo na mokolo na mokolo. 38 Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko.
39 Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, sima na kobuka bambuma ya mabele, bokosala feti mpo na Yawe, mikolo sambo. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya mwambe ekozala mikolo ya kopema.
40 Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo. 41 Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino ; bokosala feti yango na sanza ya sambo. 42 Bokovanda na bandako ya matiti mikolo sambo ; bato nyonso oyo bazali bana mboka ya Isalaele bakovanda kati na bandako yango ya matiti 43 mpo ete bakitani na bino bayeba ete navandisaki bana ya Isalaele na bandako ya matiti tango nabimisaki bango na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
44 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele malako nyonso oyo etali bafeti ya Yawe.