25
Mobu ya bopemi mpo na mabele
Yawe alobaki na Moyize na ngomba Sinai : « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino ; ezala mabele esengeli kopema, yango ekozala Saba mpo na Yawe. Mibu motoba, bokolona bilanga na bino mpe mibu motoba, bokobongisa bilanga na bino ya vino mpe bokobuka bambuma na yango. Kasi na mobu ya sambo, mabele esengeli kozala na bopemi, ekozala mobu ya Saba mpo na Yawe. Bokolona bilanga na bino te mpe bokobongisa bilanga na bino ya vino te, mabele esengeli kozala na Saba mpo na Yawe. Bokoki kobuka te bambuma oyo ebotaki yango moko na mbala eleki to kobuka bambuma ya vino na elanga oyo babongisa te ; ekozala mobu ya bopemi mpo na mabele. Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino : yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo elongo na banyama ya mboka mpe ya zamba oyo bazali kati na mokili na bino. Bosengeli kolia biloko nyonso oyo mabele ekobota.
Mobu ya kokangolama
Bokotanga mibu sambo ya Saba, mbala sambo, na mibu sambo ; mpe mibu sambo ya Saba ekosala mibu tuku minei na libwa. Bongo na sima, na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, na mokolo ya bolimbisi masumu, bokobeta kelelo na bisika nyonso kati na mokili na bino mobimba. 10 Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye. 11 Mobu ya tuku mitano ekozala mobu ya kosepela kokangolama na bino : bokolona te, bokobuka te biloko oyo bilanga ekobota yango moko, mpe bokobuka te bambuma ya vino ya elanga oyo babongisa te. 12 Pamba te ezali mobu ya kosepela kokangolama na bino, mpe esengeli kozala bule mpo na bino. Bokolia kaka bambuma ya bilanga.
13 Na mobu yango ya kosepela kokangolama na bino, moto nyonso kati na bino akozonga na mabele na ye. 14 Soki bozali koteka mabele epai ya ndeko na bino to soki bozali kosomba eloko songolo epai na ye, wana bozali bana mboka moko, tika ete moko te kati na bino akosa ndeko na ye. 15 Okosomba epai ya ndeko na yo ya mboka, na motuya ya mbongo oyo bakokata kolanda motango ya mibu oyo eleki wuta mobu ya suka oyo bosepelaki kokangolama na bino ; mpe akotekela yo na motuya ya mbongo oyo ekokatama kolanda motango ya mibu oyo ekotikala, mibu ya kobuka bambuma, kino bokoma na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama na bino. 16 Soki mibu etikali ebele, bosengeli komatisa motuya ; mpe soki mibu ezali moke, bosengeli kokitisa motuya, pamba te ezali motango ya mibu ya kobuka bambuma nde etekamaka : yango nde bakotekela yo. 17 Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
18 Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili ; 19 mpe mabele ekobota mbuma na yango, bokolia mpe bokotonda mpe bokovanda na kimia.
20 Bokoki kotuna : ‘ Tokolia nini na mobu ya sambo soki toloni te mpe tobuki te bambuma na biso ? ’ 21 Nakotindela bino mapamboli mingi na mobu ya motoba mpo ete mabele ekoka kobota bambuma mingi oyo bokoki kolia mibu misato. 22 Wana bokolona na mobu ya mwambe, bokolia nanu bambuma ya kala mpe bokokoba kolia yango kino bokobuka bambuma ya mobu ya libwa.
Mobeko na tina na koteka mabele mpe bandako
23 Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela. 24 Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye.
25 Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki. 26 Soki moto wana azali na ndeko te oyo akoki kosikola yango mpo na ye ; mpe ye moko akomi na bozwi bongo azwi makoki ya kosikola yango ; 27 asengeli kotanga motango ya mibu wuta atekaki mabele na ye mpe akozongisa motuya ya mibu oyo etikali epai ya moto oyo asombaki yango. Boye, akoki kozongela mabele na ye. 28 Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango.
29 Soki moto ateki ndako kati na engumba oyo bazingela na bamir, azali na makoki ya kosikola yango kaka mpo na mobu moko wuta mokolo oyo atekaki yango. Ezali kaka na tango wana nde akoki kosikola yango. 30 Soki asikoli yango te liboso ete mobu mobimba eleka, ndako oyo ezali kati na engumba oyo bazingela na bamir ekotikala libela mpo na moto oyo asombaki yango mpe mpo na bakitani na ye ; bakoki te kozongisa yango na mobu ya kosepela kokangolama. 31 Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama.
32 Balevi bazali tango nyonso na makoki ya kosikola bandako na bango, oyo ezali kati na bingumba ya Balevi. 33 Soki Molevi ateki ndako na ye kati na bingumba ya Balevi, moto oyo asombi yango akozongisela ye yango na mobu ya kosepela kokangolama ; pamba te bandako oyo ezali kati na bingumba ya Balevi ezali libula na bango ya libela kati na bana ya Isalaele. 34 Kasi bilanga oyo ezali zingazinga ya bingumba ya Balevi, bakoki koteka yango te : ezali libula na bango mpo na libela.
Lisungi epai ya babola
35 Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga ; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela ; mpo ete azala malamu pembeni na yo. 36 Okoki te kozwa mileki na maboko na ye ; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo. 37 Soki odefisi ye mbongo, okosenga mileki te na oyo odefisi ye ; mpe soki odefisi ye bilei, okosenga te koleka oyo opesi. 38 Ngai nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ; mpo na kopesa yo mokili ya Kanana, mpe na kozala Nzambe na yo.
Mobeko na tina na basali mpe bawumbu
39 Soki ndeko na yo, mwana mboka, akomi mobola mpe amiteki epai na yo, kopesa ye te misala na makasi lokola mowumbu. 40 Okozwa ye lokola moto na yo ya mosala to lokola moleki nzela oyo azali kati na bino ; akosalela yo kino na mobu ya kosepela kokangolama ; 41 mpe na sima, akozwa bonsomi elongo na bana na ye, akozonga na etuka na ye mpe akozongela mabele ya batata na ye. 42 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito ; bakoki te koteka bango lokola bawumbu. 43 Kokonza bango te na makasi, kasi banga Nzambe na yo.
44 Okozwa bawumbu na yo ya mibali mpe basi bawumbu na yo kati na bikolo oyo ezingeli yo ; okosomba bango kaka na bikolo yango. 45 Okoki mpe kosomba bapaya oyo bazali kovanda kati na mokili na yo, mpe bato ya bituka na bango, oyo babotami kati na mokili na yo ; boye bakokoma bawumbu na yo. 46 Okoki kotika bango epai ya bana na yo lokola libula mpo ete sima na yo bakoma bawumbu na bango mpo na libela ; kasi kokonza te na makasi bandeko na yo, bana ya Isalaele.
47 Soki mopaya to moleki nzela moko kati na mokili na yo akomi na bozwi mpe moko kati na bandeko na yo, mwana mboka, akomi mobola ; bongo amiteki epai ya mopaya to moleki nzela yango to epai ya moto moko ya libota na ye ; 48 ndeko na yo, mwana mboka, akoki kosikolama sima na ye komiteka : moto moko kati na bandeko na ye akoki kosikola ye. 49 Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko. 50 Boye, ye elongo na moto oyo asombaki ye, bakotanga mibu oyo eleki wuta na mobu oyo amitekaki kino na mobu ya kosepela kokangolama ; bakokata motuya ya lisiko na ye kolanda motango ya mibu ndenge ezali lifuti ya moto ya mosala. 51 Soki etikali mibu ebele, asengeli kofuta mpo na kosikolama na ye, mbongo kolanda talo oyo basombaki ye. 52 Soki etikalaki mibu moke kino na mobu ya kosepela kokangolama, akotanga mibu yango mpe akofuta mpo na lisiko na ye kolanda motango ya mibu oyo etikali. 53 Na mibu nyonso oyo akosala epai ya mosombi na ye, bakozwa ye lokola moto ya mosala ; okotika te ete mosombi na ye akonza ye na makasi. 54 Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama. 55 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.