18
Eliya mpe Akabi
Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya : « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. »
Eliya akendeki komimonisa epai ya Akabi.
Wana nzala ezalaki makasi na Samari, Akabi abengisaki Abidiasi, mobateli bikolo ya ndako na ye. Nzokande Abidiasi azalaki kotosa Yawe mingi. Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi. Akabi apesaki mitindo na Abidiasi : « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso ; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. »
Bakabolaki mokili mpo na kotambola kati na yango, Akabi akendeki ye moko na ngambo moko, Abidiasi mpe akendeki ye moko na ngambo mosusu.
Wana Abidiasi azalaki kokende, Eliya akutanaki na ye. Abidiasi asosolaki ete ezali ye, afukamaki elongi kino na se mpe alobaki :
— Boni, ezali penza yo, Eliya, nkolo na ngai ?
Eliya azongisaki :
— Iyo, ezali ngai. Kende koyebisa mokonzi na yo ete Eliya azali awa.
Abidiasi atunaki :
— Likambo nini ya mabe ngai nasali mpo ete okaba mosali na yo epai ya Akabi mpo ete baboma ngai ? 10 Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te. 11 Kasi sik’oyo otindi ngai ete nakende epai ya mokonzi na ngai koyebisa ye ete Eliya azali awa. 12 Nayebi te esika nini Molimo na Yawe akoki komema yo tango nakotika yo. Soki namemi sango epai ya Akabi, kasi ye amoni yo te, akoboma ngai. Nzokande ngai, mosali na yo, natosaka Yawe wuta bolenge na ngai. 13 Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe ? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga : tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela. 14 Sik’oyo olobi na ngai ete nakende koyebisa mokonzi na ngai ete Eliya azali awa ? Akoboma ngai !
15 Eliya alobaki :
— Solo, na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe oyo ngai nazali kosalela, lelo nakomimonisa epai ya Akabi.
16 Boye Abidiasi akendeki kokutana na Akabi mpe apesaki ye sango ; mpe Akabi akendeki kokutana na Eliya.
17 Tango Akabi amonaki Eliya alobaki na ye :
— Yo nde moto ozali kotia mobulu kati na Isalaele ?
18 Eliya azongisaki :
— Natie mobulu te kati na Isalaele. Kasi ezali nde yo mpe libota ya tata na yo bato bozali kosala mobulu, pamba te botosaki te mibeko ya Yawe mpe bolandi banzambe Bala. 19 Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.
20 Boye Akabi atindaki sango epai ya bato nyonso ya Isalaele mpe asangisaki basakoli na ngomba Karimeli. 21 Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki :
— Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye.
Bato bazongisaki ata eloko moko te.
22 Boye Eliya alobaki na bango :
— Natikali kaka ngai moko mosakoli kati na basakoli na Yawe. Kasi Bala azali na basakoli tuku minei na mitano. 23 Bobongisela biso bangombe mibale ya mibali. Tika ete basakoli ya Bala bapona bango moko ngombe moko, bakata-kata yango na biteni mpe batia yango likolo ya bakoni, kasi bapelisa moto te. Ngai mpe nakobongisa ngombe mosusu, nakotia yango likolo ya bakoni, kasi na kopelisa moto te. 24 Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki :
— Makambo oyo olobi ezali malamu.
25 Eliya alobaki na basakoli ya Bala :
— Bopona ngombe moko kati na bangombe ya mibali ; bino bozala bato ya liboso ya kobongisa yango, pamba te bozali ebele. Bobelela kombo ya nzambe na bino, kasi bopelisa moto te.
26 Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! »
Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.
27 Na midi, Eliya akomaki kotiola bango, alobaki : « Boganga lisusu makasi, pamba te azali nzambe ; tango mosusu azali kokanisa makambo ebele to akangami na misala mosusu to azali na mobembo ; to mpe azali kolala, boye esengeli bino kolamusa ye. »
28 Boye bagangaki lisusu makasi mpe bamizokisaki na mipanga na makonga, ndenge ezalaki momesano na bango kino makila kotanga. 29 Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki.
30 Eliya alobaki na bato nyonso :
— Bopusana pene na ngai !
Bato nyonso bapusanaki pene na ye mpe Eliya abongisaki etumbelo ya Yawe oyo ebukanaki. 31 Eliya akamataki mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya bana mibali ya Jakobi oyo Yawe alobaki na ye : « Kombo na yo ekozala Isalaele. » 32 Na mabanga yango, atongaki etumbelo mpo na Yawe ; atimolaki libulu ya mayi oyo ekokaki kokota balitele pene tuku misato zingazinga ya etumbelo. 33 Abongisaki bakoni, akataki ngombe na biteni mpe atiaki yango likolo ya bakoni. 34 Alobaki na bango :
— Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni.
Basalaki bongo.
Alobaki na bango lisusu :
— Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni.
Basalaki lisusu bongo.
Apesaki bango mitindo :
— Bosala bongo mpo na mbala ya misato !
Basalaki bongo mpo na mbala ya misato. 35 Mayi esopanaki zingazinga ya etumbelo mpe etondisaki libulu.
36 Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki :
— Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo. 37 Yanola ngai, oh Yawe, yanola ngai, mpo ete bato oyo bayeba solo ete Yo, Yawe, nde ozali Nzambe ; na bongo okozongisa mitema ya bato oyo epai na Yo.
38 Bongo moto ya Yawe ekweyaki, ezikisaki mbeka, bakoni, mabanga mpe ekawusaki mayi nyonso kati na libulu. 39 Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakweyaki bilongi na se mpe bagangaki :
— Solo, Yawe nde azali Nzambe ; Yawe nde azali Nzambe !
40 Eliya apesaki bango mitindo :
— Bokanga basakoli ya Bala, botika ata moto moko te kokima.
Bakangaki bango, mpe Eliya amemaki bango na lubwaku ya Kishoni mpo na kokata bango bakingo kuna.
41 Eliya alobaki na Akabi :
— Kende, lia mpe mela, pamba te nazali koyoka makelele ya mvula makasi.
42 Boye, Akabi akendeki kolia mpe komela. Kasi Eliya amataki kino na songe ya ngomba Karimeli, afukamaki elongi kino na se, na kati-kati ya mabolongo. 43 Alobaki na mosali na ye :
— Kende kotala na nzela ya ebale monene.
Mosali na ye akendeki kotala, alobaki :
— Eloko moko te ezali kuna.
Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo : « Kende kotala lisusu ! »
44 Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki :
— Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene.
Boye Eliya alobaki :
— Kende koyebisa Akabi : « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »
45 Na tango wana kaka, likolo eyindaki makasi na mapata ya mvula, mopepe eyaki, mpe mvula makasi enokaki. Akabi amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli. 46 Lokola nguya na Yawe ezalaki likolo ya Eliya oyo alataki mokaba na loketo na ye, akimaki mbangu liboso ya Akabi kino na ekuke ya Jizireyeli.