19
Kokima ya Eliya
Akabi ayebisaki Jezabeli makambo nyonso oyo Eliya asalaki mpe ndenge nini abomaki basakoli nyonso na mopanga. Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye :
— Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.
Eliya abangaki mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Tango akomaki na Beri-Sheba ya Yuda, atikaki kuna mosali na ye. Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo :
— Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
Bongo alalaki na se ya nzete yango mpe azwaki pongi. Mbala moko, anjelu moko asimbaki ye mpe alobaki na ye :
— Lamuka mpe lia.
Atalaki mpe amonaki pene ya esika oyo atiaki moto, lipa batumba na mabanga ya moto mpe mbeki ya mayi. Aliaki, amelaki mpe alalaki lisusu. Anjelu ya Yawe azongaki na mbala ya mibale, asimbaki ye lisusu mpe alobaki :
— Lamuka mpe lia, pamba te mobembo ezali molayi mingi mpo na yo.
Boye alamukaki, aliaki mpe amelaki. Bongo na makasi oyo azwaki na nzela ya bilei, atambolaki mobembo ya mikolo tuku minei mpe ya babutu tuku minei kino akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
Kuna, akotaki na lidusu ya mabanga mpe alekisaki butu. Yawe alobaki na ye :
— Eliya, ozali kosala nini awa ?
10 Azongisaki :
— Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.
11 Yawe alobaki :
— Bima mpe telema na ngomba liboso ya Yawe, pamba te Yawe alingi koleka.
Boye mopepe moko ya makasi penza epepaki, ebukaki bangomba mpe epanzaki mabanga liboso ya Yawe. Nzokande Yawe azalaki kati na mopepe makasi te. 12 Sima na mopepe makasi, mabele eninganaki ; nzokande Yawe azalaki te kati na koningana ya mabele. Sima na koningana ya mabele, moto eyaki ; nzokande Yawe azalaki te kati na moto wana. Mpe sima na moto, mopepe ya kimia penza eyaki. 13 Tango kaka Eliya ayokaki yango, azipaki elongi na ye na songe ya kazaka na ye, abimaki mpe atelemaki na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mpe mongongo moko elobaki na ye lisusu :
— Eliya, ozali kosala nini awa ?
14 Azongisaki :
— Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.
15 Yawe alobaki na ye :
— Zonga na nzela oyo oyelaki mpe kende na esobe ya Damasi. Tango okokoma kuna, okopakola Azaeli mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Siri. 16 Okopakola lisusu Jewu, mwana mobali ya Nimishi, mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Okopakola lisusu Elize, mwana mobali ya Shafati ya Abele-Meola, mafuta mpo ete akoma mosakoli na esika na yo. 17 Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye ; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye. 18 Atako bongo, nabombi kati na Isalaele bato nkoto sambo, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te, mpe minoko na bango epesi ye beze te.
Kobengama ya Elize
19 Eliya alongwaki wana mpe akutanaki na Elize, mwana mobali ya Shafati. Azalaki kobalola bilanga na bangombe tuku mibale na minei bakangisa mibale-mibale liboso na ye mpe ye moko azalaki kotambolisa bangombe mibale ya suka. Eliya apusanaki pembeni ya Elize mpe abwakelaki Elize kazaka na ye. 20 Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki :
— Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo.
Eliya azongisaki :
— Zonga na yo, nasali yo nini ?
21 Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye.