Misala ya mosakoli Eliya
17
Mosakoli Eliya na Tango ya Bokawuki
Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi :
— Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
Bongo Yawe alobaki na Eliya :
— Longwa awa, kende na ngambo ya este mpe bombama na lubwaku ya Keriti, na ngambo ya este ya Yordani. Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.
Eliya asalaki ndenge Yawe alobaki na ye : akendeki na lubwaku ya Keriti na ngambo ya este ya Yordani mpe avandaki kuna. Bayanganga ezalaki komemela ye mapa mpe mbisi na tongo mpe na pokwa, mpe amelaki mayi ya lubwaku.
Eliya mpe mwasi akufisa mobali
Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili. Yawe alobaki na Eliya : « Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. »
10 Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana ; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye :
— Nabondeli yo, zwela ngai mwa mayi na mbeki mpo ete namela.
11 Tango mwasi yango azalaki kokende kozwa mayi, Eliya ayebisaki ye lisusu :
— Nabondeli yo, memela ngai mpe lipa.
12 Mwasi yango azongiselaki ye :
— Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te ; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa.
13 Eliya alobaki na ye :
— Kobanga te, zonga na ndako mpe sala ndenge olobi. Kasi salela ngai nanu lipa na oyo ozali na yango mpe memela ngai yango ; bongo na sima, okosala mpo na yo mpe mpo na mwana na yo ya mobali. 14 Pamba te, tala maloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Farine ekozanga te na sani, mpe mafuta ekosila te na mbeki. »
15 Mwasi yango akendeki mpe asalaki ndenge kaka Eliya alobaki. Boye, na tango molayi, bilei ezangaki te mpo na Eliya, mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpe mpo na ndako na ye. 16 Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.
Eliya asekwisi mwana mobali
17 Sima na mwa tango, mwana mobali ya mwasi oyo akufisa mobali, nkolo ndako, abelaki ; mpe pasi na ye ekomaki makasi penza kino akataki motema.
18 Mwasi yango alobaki na Eliya :
— Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?
19 Eliya azongisaki :
— Pesa ngai mwana na yo ya mobali.
Eliya azwaki mwana yango na maboko ya mwasi oyo akufisa mobali, amemaki ye na shambre ya likolo epai wapi azalaka kovanda mpe alalisaki ye na mbeto na ye ; 20 abelelaki Yawe na maloba oyo :
— Oh Yawe, Nzambe na ngai, mpo na nini koyeisa lisusu pasi na bomoi ya mwasi oyo akufisa mobali, na koboma mwana na ye ya mobali ; nzokande ayambaki ngai epai na ye ?
21 Sima, amitandaki mbala misato likolo ya mwana mobali mpe abelelaki Yawe na maloba oyo :
— Oh Yawe, Nzambe na ngai, tika ete pema ya mwana mobali oyo ezonga kati na ye.
22 Yawe ayanolaki libondeli ya Eliya mpe azongisaki pema kati na mwana mobali, bongo mwana yango azongaki lisusu na bomoi. 23 Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki :
— Tala mwana na yo ya mobali, azali na bomoi.
24 Mwasi yango alobaki na Eliya :
— Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.