7
Akana asalaki masumu
Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele.
Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. »
Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.
Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye : « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. »
Boye, bato pene nkoto misato bakendeki, kasi bakimaki liboso ya bato ya Ayi. Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola.
Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango. Jozue alobaki :
— Ah Nkolo Yawe, mpo na nini otikaki ete bato oyo bakatisa Yordani ? Boni, ezalaki mpo ete okaba biso na maboko ya bato ya Amori ete baboma biso ? Elekaki malamu ete totikala na biso na ngambo mosusu ya ebale ! Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye ? Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?
10 Yawe alobaki na Jozue :
— Telema ! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele ? 11 Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango. 12 Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino. 13 Telema, bulisa bato. Loba na bango : « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye : ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. › 14 Lobi na tongo, bokopusana pene na Ngai, libota na libota. Libota oyo Yawe akopona ekopusana, etuka na etuka ; etuka oyo Yawe akopona ekopusana, ndako na ndako ; mpe ndako oyo Yawe akopona ekopusana, moto na moto. 15 Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »
Akana azwaki etumbu
16 Mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki na tongo-tongo penza, mpe abengisaki Isalaele, libota na libota. Mpe ezali libota ya Yuda nde eponamaki. 17 Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki. 18 Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki.
19 Jozue alobaki na Akana :
— Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.
20 Akana azongiselaki Jozue :
— Solo, nasali lisumu liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala likambo oyo nasalaki : 21 Namonaki, kati na bomengo ya bitumba, kazaka moko ya kitoko ya mboka Mezopotami, mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale mpe ndambo ya kilo ya wolo ; nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nakundaki yango na kati-kati ya ndako na ngai ya kapo, mpe palata ezali na se na yango.
22 Jozue atindaki bato, mpe bakendeki mbangu kati na ndako ya kapo ya Akana mpe bakutaki penza kazaka bakunda na se ya ndako ya kapo, elongo na palata, na se na yango. 23 Babimisaki biloko yango wuta na ndako na ye ya kapo, bamemaki yango liboso ya Jozue mpe ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe sima, basopaki yango liboso ya Yawe.
24 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso ; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori. 25 Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! »
Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto. 26 Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori.