6
Bana ya Isalaele babotolaki Jeriko
Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima. Yawe alobaki na Jozue :
— Tala, na maboko na yo, nasili kokaba Jeriko elongo na mokonzi na yango mpe bilombe na yango ya bitumba. Botambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo, yo elongo na bato nyonso ya etumba. Bosala bongo mikolo motoba. Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo. Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.
Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango :
— Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe.
Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele :
— Bokende liboso ! Botambola zingazinga ya engumba, mpe tika ete basoda oyo bazalaka na liboso, na etumba, baleka liboso ya Sanduku ya Yawe.
Tango Jozue asilisaki koloba na bato, Banganga-Nzambe sambo, oyo bakamataki bakelelo sambo liboso ya Yawe, balekaki liboso mpe bakomaki kobeta yango, wana Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezalaki kolanda bango na sima. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo ; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta. 10 Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele :
— Boganga te, boloba mpe eloko moko te ! Bovanda kaka kimia kino tango nakoloba na bino ete boganga makasi ; wana nde bokoganga makasi.
11 Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu.
12 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe. 13 Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta. 14 Na mokolo ya mibale, babalukaki lisusu engumba mbala moko ; bongo na sima, bazongaki na molako. Boye, basalaki bongo mikolo motoba.
15 Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba. 16 Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato :
— Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino ! 17 Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki. 18 Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu. 19 Kasi palata, wolo mpe biloko nyonso ya bronze elongo na bibende ekobulisama mpo na Yawe mpe esengeli kokende na ebombelo bomengo ya Yawe.
20 Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango. 21 Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba : mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane.
Lobiko ya libota ya Raabi
22 Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko :
— Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye.
23 Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.
24 Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe. 25 Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
26 Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo :
« Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko
alakelama mabe liboso ya Yawe !
Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali,
tango akotonga miboko na yango ;
mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka,
tango akotia bikuke na yango. »
27 Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.