5
Bana ya Isalaele bakatamaki ngenga na Giligali
Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.
 
Na tango wana, Yawe alobaki na Jozue :
— Sala bambeli ya mabanga mpe kata lisusu bana mibali ya Isalaele ngenga.
Jozue asalaki bambeli ya mabanga mpe akataki bana mibali ya Isalaele ngenga, pene ya ngomba moke ya Araloti.
Tala mpo na nini Jozue asengelaki kokata bango ngenga : Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito mpe bakokisaki mibu ya kobunda bitumba bakufaki na nzela, kati na esobe, sima na bango kobima na Ejipito. Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito bakatamaki ngenga ; kasi bato nyonso oyo babotamaki na nzela, kati na esobe, bakatamaki ngenga te. Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Boye, atombolaki bana na esika ya batata na bango ; yango wana Jozue akataki bango ngenga, pamba te bakatamaki ngenga te na nzela. Sima na ekolo mobimba kokatama ngenga, batikalaki esika moko kati na molako kino tango bapota na bango ekawukaki.
Yawe alobaki na Jozue :
— Lelo, natindiki soni ya Ejipito mosika na bino.
Babengaki esika yango « Giligali » kino na mokolo ya lelo.
Feti ya liboso ya Pasika na Kanana
10 Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko. 11 Mokolo oyo elandaki feti ya Pasika, baliaki biloko ya mokili ya Kanana : mapa ezanga levire mpe bambuma ya ble oyo bakalingaki kaka mokolo wana. 12 Mokolo oyo elandaki mokolo oyo baliaki biloko ya mokili ya Kanana, mana etikaki kokweya ; mana ezalaki lisusu te mpo na bana ya Isalaele. Boye, na mobu wana, baliaki biloko ya mokili ya Kanana.
Jozue akutanaki na Mokonzi ya mampinga ya Yawe
13 Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye :
— Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ?
14 Azongiselaki Jozue :
— Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe ; nayei kaka sik’oyo.
Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye :
— Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye ?
15 Mokonzi ya mampinga ya Yawe alobaki na ye :
— Longola basapato na yo na makolo, pamba te esika oyo ozali ezali bule.
Jozue asalaki se bongo.