8
Isalaele abotolaki engumba Ayi
Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo : mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye. Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. »
Jozue atelemaki elongo na basoda nyonso mpo na kobundisa engumba Ayi. Aponaki bilombe ya bitumba nkoto tuku misato mpe atindaki bango na butu. Apesaki bango mitindo oyo : « Bobombama na sima ya engumba oyo ; bozala penza mosika mingi te na engumba, kasi bozala pene. Ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai, tokopusana pene ya engumba. Tango bakobima mpo na kobundisa biso lokola na mbala oyo eleki, tokokima liboso na bango. Bakolanda biso, mpe tokobenda bango mosika ya engumba, pamba te bakoloba : ‹ Bazali kokima liboso na biso lokola na mbala oyo eleki, › mpe tokokima liboso na bango. Boye, bino bokobima wuta na bisika oyo bokobombama mpe bokobotola engumba. Yawe, Nzambe na bino, akabi yango na maboko na bino. Tango bokobotola engumba, botia yango moto mpe bosala ndenge Yawe alobaki. »
Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele.
10 Jozue alamukaki na tongo-tongo penza mpe atalaki ndenge nini basoda na ye bamilengelaki. Sima na yango, alekaki liboso elongo na bakambi ya Isalaele mpo na kokende kobundisa engumba Ayi. 11 Basoda na ye nyonso bapusanaki kino na liboso ya engumba mpe batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Ayi, bongo lubwaku ezalaki kati na bango mpe Ayi. 12 Jozue azwaki basoda nkoto mitano mpe abombaki bango na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya engumba. 13 Mampinga ya basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya engumba ; mpe basoda oyo batikalaka na sima, na ngambo ya weste ya engumba. Na butu wana, Jozue akendeki na kati-kati ya etando.
14 Tango mokonzi ya Ayi amonaki bongo, ye elongo na bato na ye nyonso, bavandi ya engumba, batelemaki na lombangu mpe babimaki mpo na kobundisa Isalaele na esika oyo nzela ekutana, liboso ya Araba. Ayebaki te ete basoda mosusu babombamaki na sima ya engumba. 15 Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bakosaki lokola bato oyo basili kokweya na bitumba mpe bakimaki na ngambo ya esobe. 16 Babelelaki bato nyonso ya Ayi mpo ete balanda bango. Boye, balandaki Jozue mpe bakendeki mosika ya engumba. 17 Kati na Ayi mpe Beteli, mobali moko te atikalaki oyo azangaki kolanda Isalaele. Batikaki engumba ya kofungwama, wana bazalaki kolanda Isalaele.
18 Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye. 19 Tango kaka asembolaki loboko, basoda oyo babombamaki babimaki na lombangu wuta na bisika oyo babombamaki, bakotaki na engumba, babotolaki yango mpe batiaki yango moto.
20 Tango bato ya Ayi batalaki na sima, bamonaki milinga komata na likolo wuta na engumba ; moko te akokaki lisusu kokima na ngambo moko to na ngambo mosusu. Bana ya Isalaele oyo bazalaki kokima na esobe babalukelaki bato oyo bazalaki kolanda bango. 21 Boye, tango Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete basoda oyo babombamaki bazwi engumba mpe milinga ezali komata wuta na engumba, bazongaki mpe babomaki bato ya Ayi. 22 Basoda ya Isalaele oyo babombamaki, babimaki na engumba mpo na kobundisa bango. Bato ya Ayi bakomaki na kati-kati ya basoda ya Isalaele oyo bazalaki, bamoko na ngambo moko, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. Basoda ya Isalaele basilisaki koboma bango nyonso, ata moko te atikalaki na bomoi, mpe ata moko te akimaki. 23 Kasi bakangaki ya bomoi mokonzi ya Ayi mpe bamemaki ye epai ya Jozue.
24 Tango Isalaele asilisaki koboma mibali nyonso ya Ayi, kati na zamba mpe kati na esobe epai wapi balandaki bango, mpe wana bango nyonso basilaki kokufa na mopanga, bana nyonso ya Isalaele bazongaki na Ayi mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna. 25 Motango ya bato nyonso oyo bakufaki na mokolo wana, basi mpe mibali, ezalaki nkoto zomi na mibale : bango nyonso bazalaki bato ya Ayi. 26 Jozue akitisaki te loboko na ye, oyo esimbaki likonga kino tango asilisaki koboma bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ayi. 27 Kasi Isalaele azwaki mpo na ye, lokola bomengo ya bitumba, bibwele mpe biloko ya engumba yango, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na Jozue.
28 Jozue atumbaki Ayi mpe akomisaki yango libebi mpo na libela, esika ezanga bato kino na mokolo ya lelo. 29 Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo.
Boyokani ya sika na ngomba Ebali
30 Jozue atongaki etumbelo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, na ngomba Ebali, 31 ndenge Moyize, mosali na Yawe, atindaki bana ya Isalaele. Atongaki yango kolanda makambo oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize : etumbelo etongama na mabanga oyo bakata na esalelo ya ebende te. Na likolo na yango, batiaki mbeka ya kotumba mpo na Yawe mpe babonzaki mbeka ya boyokani. 32 Na esika yango, na miso ya bana nyonso ya Isalaele, Jozue akomaki, na likolo ya mabanga, Mobeko oyo Moyize akomaki mpo na bana ya Isalaele. 33 Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele.
34 Sima na yango, Jozue atangaki maloba nyonso ya Mobeko : mapamboli mpe bilakeli mabe kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko. 35 Jozue azangisaki te kotanga, liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, basi, bana mpe bapaya oyo bazalaki kati na bango, maloba nyonso oyo Moyize akomaki.