14
Kokabola mabele ya ngambo ya weste ya Yordani
Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana ; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango. Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota. Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani ; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu ; pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango. Boye, bana ya Isalaele bakabolaki mokili, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Kalebi azwi engumba Ebron
Bato ya libota ya Yuda bayaki epai ya Jozue, na Giligali. Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi, ayebisaki Jozue : « Oyebi malamu makambo oyo Yawe alobaki na Moyize, moto na Nzambe, na Kadeshi-Barinea na tina na yo mpe na tina na ngai. Nazalaki nanu na mibu tuku minei tango Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki ngai wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kononga mokili. Mpe napesaki ye sango kolanda ndenge motema na ngai ezalaki kondima. Bandeko na ngai, oyo tomataki na bango elongo balembisaki bato nzoto ; nzokande ngai nalandaki bobele Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi : ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. ›
10 Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama, 11 mpe nazali na makasi lokola na tango oyo Moyize atindaki ngai ; nazali na nguya ya kobunda bitumba ndenge kaka nazalaki na yango na kala. 12 Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. »
13 Jozue apambolaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe apesaki ye engumba Ebron lokola libula. 14 Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.
15 Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.