15
Eteni ya mabele ya libota ya Yuda
Eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, kolanda bituka na bango, ezalaki na ngambo ya sude, wuta na bandelo ya Edomi kino na esobe ya Tsini, na suka penza ya sude.
 
Mondelo na yango ya sude ebandaki na suka ya ebale monene ya Barozo, longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale monene oyo etalana na Negevi, emataki kino na ngambo ya sude ya Akarabimi mpe elekaki na Tsini, sima emataki na ngambo ya sude ya Kadeshi-Barinea mpe ekitaki na Etsironi ; emataki na ngambo ya Adari mpe ebalukaki na ngambo ya Karika. Elekaki na Atsimoni, ekendeki kotutana na moluka ya Ejipito mpe esukaki na Ebale monene. Yango nde ezali mondelo na bango na ngambo ya sude.
Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani.
Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani. Mondelo emataki na Beti-Ogila, elekaki na ngambo ya nor ya Beti-Araba mpe emataki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni. Mondelo yango emataki kino na Debiri, longwa na Lubwaku ya Akori, mpe ebalukaki na ngambo ya nor kino na Giligali oyo etalana na nzela oyo emata na Adumimi, na ngambo ya sude ya moluka. Elekaki pene ya mayi ya Eyini-Shemeshi mpe ekendeki kosuka na Eyini-Rogeli. Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi. Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi). 10 Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri ; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni) ; ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina. 11 Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene.
12 Mondelo ya ngambo ya weste elekaki pembeni-pembeni ya ebale monene Mediterane.
 
Yango nde ezalaki, na bangambo nyonso, eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda kolanda bituka na bango.
Eteni ya mabele ya Kalebi
13 Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele : Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki).
14 Kalebi abenganaki, wuta na Ebron, bakitani misato ya Anaki : Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi. 15 Longwa wana, akendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. » 16 Kalebi alobaki : « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. » 17 Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.
18 Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye :
— Olingi nini ?
19 Akisa azongisaki :
— Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima.
Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.
Bingumba ya bato ya libota ya Yuda
20 Yango nde ezalaki eteni ya mabele oyo bato ya libota ya Yuda bazwaki lokola libula, kolanda mabota na bango.
 
21 Tala bingumba oyo ezalaki na suka ya eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, na ngambo ya mondelo ya Edomi, na Negevi :
Kabiseyeli, Ederi, Yaguri, 22 Kina, Dimona, Adada, 23 Kedeshi, Atsori, Itinani, 24 Zifi, Telemi, Bealoti, 25 Atsori-Adata, Kerioti-Etsironi oyo bazalaki mpe kobenga Atsori, 26 Amami, Shema, Molada, 27 Atsari-Gada, Eshimoni, Beti-Paleti, 28 Atsari-Shuwali, Beri-Sheba, Biziotia, 29 Baala, Iyimi, Atsemi, 30 Elitoladi, Kesili, Orima, 31 Tsikilagi, Madimana, Sanisana, 32 Lebaoti, Shilimi, Ayini mpe Rimoni : bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
33 Tala bingumba oyo ezalaki na etando, pene ya ebale monene :
Eshitaoli, Tsorea, Ashina, 34 Zanoa, Eyini-Ganimi, Tapua, Enami, 35 Yarimuti, Adulami, Soko, Azeka, 36 Shaarayimi, Aditayimi, Gedera to Gederotayimi : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
37 Tsenani, Adasha, Migidali-Gadi, 38 Dileani, Mitsipe, Yokiteyeli, 39 Lakishi, Botsikati, Egiloni, 40 Kaboni, Lakimasi, Kitilishi, 41 Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Makeda : bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
42 Libina, Eteri, Ashani ; 43 Yifita, Ashina, Netsibi, 44 Keila, Akizibi mpe Maresha : bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
45 Engumba ya Ekroni elongo na bamboka na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike oyo ezingelaki yango, 46 longwa na Ekroni mpe na ngambo ya weste, mabele nyonso oyo ezalaki pene ya Asidodi mpe bamboka na yango ; 47 Asidodi, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike ; Gaza, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike kino na moluka ya Ejipito, ebale monene Mediterane mpe bazingazinga na yango.
48 Na mokili ya bangomba :
Shamiri, Yatiri, Soko, 49 Dana, Kiriati-Sana oyo bazalaki mpe kobenga Debiri, 50 Anabi, Eshitemoa, Animi, 51 Gosheni, Oloni mpe Gilo : bingumba nyonso ezalaki zomi na moko elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
52 Arabi, Duma, Esheani, 53 Yanumi, Beti-Tapua, Afeki, 54 Umeta, Kiriati-Ariba oyo bazalaki mpe kobenga Ebron, mpe Tsiori : bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na mboka na yango ya mike-mike.
55 Maoni, Karimeli, Zifi, Yuta, 56 Jizireyeli, Yokideami, Zanoa, 57 Kayini, Gibea mpe Timina : bingumba nyonso ezalaki zomi elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
58 Aliwuli, Beti-Tsuri, Gedori, 59 Maarati, Beti-Anoti mpe Elitekoni : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
60 Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba : bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
61 Tala bingumba oyo ezalaki na esobe :
Beti-Araba, Midini, Sekaka, 62 Nibishani, Iri-Amelayi mpe Eyini-Gedi : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
 
63 Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda.