Kokabola Kanana
13
Bituka oyo babotolaki nanu te
Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.
 
Tala mokili oyo etikali :
 
Bituka nyonso ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Geshuri : etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana ; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia : mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni ;
etuka ya bato ya Avi ;
mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori ;
etuka ya bato ya Gebali ;
mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati.
 
Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo ; mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. »
Kokabola mabele ya ngambo ya este ya Yordani
Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani.
Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni, 10 mpe bingumba nyonso ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kokonza na Eshiboni kino na bandelo ya bato ya Amoni.
11 Galadi mpe ezalaki na kati, elongo na etuka ya bato ya Geshuri mpe ya Maakati, ngomba Erimoni nyonso mpe Bashani mobimba kino na Salika. 12 Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango. 13 Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati ; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
 
14 Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango.
Eteni ya mabele ya libota ya Ribeni
15 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango :
16 Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba, 17 kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni, 18 Yakatsi, Kedemoti, Mefati, 19 Kiriatayimi, Sibima, Tsereti-Shaari na ngomba moke ya lubwaku, 20 Beti-Peori, mipanzi ya ngomba Pisiga mpe Beti-Yeshimoti : 21 bingumba nyonso ya ngomba mpe mokili mobimba ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori oyo azalaki kokonza na Eshiboni. Moyize alongaki ye elongo na bakambi ya Madiani : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba, oyo bazalaki kosalela Sikoni mpe kovanda na mokili na ye. 22 Kati na bato oyo babomaki na bitumba, bana ya Isalaele babomaki mpe na mopanga Balami, mwana mobali ya Beori, moto oyo asololaka na milimo ya bakufi.
23 Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango.
 
24 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Gadi, kolanda bituka na bango :
25 Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba ; 26 mpe wuta na Eshiboni kino na Ramati-Mitsipe mpe Betonimi, wuta na Maanayimi kino na mondelo ya Debiri ; 27 mpe na lubwaku, na Beti-Arami, na Beti-Nimira, na Sukoti, na Tsafoni, mpe na mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni, oyo etikalaki elongo na Yordani mpe bazingazinga na yango kino na suka ya Ebale monene ya Kinereti, na ngambo ya este ya Yordani.
28 Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Gadi, kolanda bituka na bango.
 
29 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na ndambo ya libota ya Manase, kolanda bituka na bango :
30 Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba, 31 ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.
 
32 Yango nde libula oyo Moyize apesaki tango azalaki na etando ya Moabi, na ngambo ya Yordani, na ngambo ya este ya Jeriko. 33 Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango.