12
Molongo ya bakonzi oyo Isalaele alongaki
Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :
 
Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni.
Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni. Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.
Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.
 
Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
 
Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
 
Tala bakonzi yango :
 
mokonzi ya Jeriko moko
mokonzi ya Ayi, pembeni ya Beteli moko
10 mokonzi ya Yelusalemi moko
mokonzi ya Ebron moko
11 mokonzi ya Yarimuti moko
mokonzi ya Lakishi moko
12 mokonzi ya Egiloni moko
mokonzi ya Gezeri moko
13 mokonzi ya Debiri moko
mokonzi ya Gederi moko
14 mokonzi ya Orima moko
mokonzi ya Aradi moko
15 mokonzi ya Libina moko
mokonzi ya Adulami moko
16 mokonzi ya Makeda moko
mokonzi ya Beteli moko
17 mokonzi ya Tapua moko
mokonzi ya Eferi moko
18 mokonzi ya Afeki moko
mokonzi ya Lasharoni moko
19 mokonzi ya Madoni moko
mokonzi ya Atsori moko
20 mokonzi ya Shimironi-Meroni moko
mokonzi ya Akishafi moko
21 mokonzi ya Taanaki moko
mokonzi ya Megido moko
22 mokonzi ya Kedeshi moko
mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli moko
23 mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori moko
mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali moko
24 mokonzi ya Tiritsa moko.
 
Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.