Kosalela maloba ya mibeko
27
Kotelemisa mabanga na ngomba Ebali
Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato : « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo. Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe. Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino. Mpe tango bokosilisa kokatisa Yordani, bokotelemisa mabanga yango na ngomba Ebali ndenge natindi bino yango lelo, mpe bokopakola yango pembe. Kuna, bokotonga etumbelo ya mabanga mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokosalela ata esalelo moko te ya ebende. Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba. Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani ; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino. Bokokoma na konguluta maloba nyonso ya mobeko oyo na likolo ya mabanga oyo botelemisi. »
Sima na yango, Moyize mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Oh Isalaele, bovanda kimia mpe boyoka ! Bokomi lelo libota ya Yawe, Nzambe na bino. 10 Botosa Yawe, Nzambe na bino, mpe bosalela mitindo mpe bikateli na Ye oyo nalingi kopesa bino lelo. »
11 Kaka na mokolo wana, Moyize apesaki mitindo oyo epai na bato : 12 « Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani : libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame. 13 Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »
Bilakeli mabe mpo na bozangi botosi
14 Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi :
15 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
16 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
17 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akopusa libanga oyo batie lokola mondelo na mabele ya moninga na ye ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
18 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokamba mokufi miso na nzela ya mabe. »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
19 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
20 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
21 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
22 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
23 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mama ya mwasi na ye ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
24 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nkuku ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
25 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akozwa kanyaka mpo na koboma moto oyo ayebi likambo te ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
26 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo ! »
Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »