26
Mibeko na tina na bambuma ya liboso
Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna, moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino ; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye. Akoloba na Nganga-Nzambe oyo akozala na mosala na tango wana : « Natatoli lelo liboso ya Yawe, Nzambe na yo, ete nakomi na mokili oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na biso na nzela ya ndayi. » Nganga-Nzambe akozwa kitunga na maboko na ye mpe akokitisa yango liboso ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo : « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga ; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele. Kasi bato ya Ejipito banyokolaki biso, bayokisaki biso pasi mpe bapesaki biso misala makasi. Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso ; Yawe abimisaki biso na Ejipito na somo makasi, na bilembo minene mpe na bikamwa, na nzela ya loboko na Ye ya nguya mpe esembolama. Amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. 10 Sik’oyo oh Yawe, tala, namemi bambuma ya liboso ya mabele oyo opesaki ngai. »
Sima na yango, okotia kitunga liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okogumbama liboso na Ye. 11 Boye, na biloko nyonso ya malamu oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mpe bandeko na yo ; okosepela na yango elongo na Balevi mpe bapaya oyo bazali kati na bino.
Eteni ya zomi ya mibu misato
12 Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali ; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda. 13 Bongo okotatola maloba oyo epai na Yawe, Nzambe na yo : « Nalongolaki kati na ndako na ngai eteni ya bule mpe napesi yango epai ya Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kolanda makambo nyonso oyo otindaki ngai. Napengwaki te na mitindo na Yo mpe nabosanaki yango te. 14 Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai. 15 Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »
Bana ya Isalaele bazali bato ya Yawe
16 Lelo, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete osalela malamu bikateli mpe mibeko oyo ; batela yango malamu na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba. 17 Lelo, ondimi ete Yawe azali Nzambe na yo ; ndenge opesaki elaka ete okotosa Ye, okobatela mibeko na Ye nyonso mpe okosala makambo nyonso oyo Ye akotinda yo. 18 Lelo mpe, Yawe andimi ete ozala ekolo na Ye penza, ndenge alakaki yo mpe ndenge apesaki yo mitindo ete otosa mibeko na Ye nyonso. 19 Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela ; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango.